Lakisá makambo oyo ezali na kati

27/01/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekweisi na likambo ndeko Aleksandr Prianikov, elongo na bandeko basi mibale: Venera mpe Darya Dulova

Tribinale ya Russie ekweisi na likambo ndeko Aleksandr Prianikov, elongo na bandeko basi mibale: Venera mpe Darya Dulova

Na mokolo ya 27/01/2020, tribinale ya engumba Karpinsk ekweisaki na likambo ndeko Aleksandr Prianikov, elongo na bandeko basi mibale: Venera mpe Darya Dulova. Tribinale ezwaki ekateli ya kolandela bango; elingi koloba ndeko Aleksandr na boumeli ya mbula mibale ná ndambo, ndeko mwasi Venera mbula mibale, mpe ndeko mwasi Darya Dulova mbula moko. Atako bakokɔta bolɔkɔ te, bakobanda kolandela bango mbala na mbala na eleko yango. Bandeko bakosɛnga bátalela lisusu ekateli oyo bazwelaki bango.