Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Khasan Kogut elongo na mwasi na ye, Yekaterina nsima ya ekateli ya tribinale

10/09/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Khasan Kogut

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Khasan Kogut

Na mokolo ya 10/09/2020, tribinale ya engumba Berezovsky, na etúká ya Kemerovo ekweisaki ndeko Khasan Kogut. Tribinale yango ekateli ye etumbu ya mbula mibale ná ndambo ya bolɔkɔ, kasi akokɔta bolɔkɔ te. Ebakiseli ye mpe lisusu etumbu ya mbula mibale oyo bakotyela ye mwa bipekiseli. Ndeko Kogut azali na esengo mpo akokɔta bolɔkɔ te mpe akoki kozala elongo na mwasi na ye mpe mwana na bango ya mobali oyo azali na mbula 8.