Lakisá makambo oyo ezali na kati

14/02/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Popov ná mwasi na ye na likambo mpe esɛngi bango báfuta amande

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Popov ná mwasi na ye na likambo mpe esɛngi bango báfuta amande

Na mokolo ya 14/02/2020, tribinale ya engumba Vilyuchinsk ekweisaki na likambo ndeko Mikhail Popov ná mwasi na ye, ndeko Yelena Popova. Tribinale esɛngaki ndeko Mikhail afuta amande ya dolare 5 508 mpe mwasi na ye amande ya dolare 4 722, kasi ekatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ te. Bango mibale bakosɛnga bátalela lisusu ekateli oyo bazwaki mpo na bango.

Mikhail ná Yelena bakɔtaká bolɔkɔ na sanza ya 07/2018. Kasi mwa moke na nsima, babimisaki bango na bolɔkɔ mpo na kozela ete básambisa bango.

Banda 2019, batribinale ya Russie ekweisi na likambo Batatoli ya Yehova 28 mpo na kondima na bango. Zomi kati na bandeko yango bakweisaki bango na likambo kaka na sanza mibale oyo eleki. Kasi, bandeko wana zomi bazali sikoyo na bolɔkɔ te.