Lakisá makambo oyo ezali na kati

18/02/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Yevgeniy Aksenov na likambo mpe elongoli ye na etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ kasi bakobanda kolandela ye

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Yevgeniy Aksenov na likambo mpe elongoli ye na etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ kasi bakobanda kolandela ye

Na mokolo ya 18/02/2020, tribinale ya etúká Jeleznodorojny na Khabarovsk, na Russie, ekweisaki ndeko Yevgeniy Aksenov na likambo mpe elongolaki ye na etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ kasi ekobanda kolandela ye. Soki ndeko alongwe esika azali kofanda mpe akei esika mosusu na boumeli ya mbula mibale wana to balobi ete azali na liste ya bato mabe, akokɔta bolɔkɔ. Na boumeli ya sanza motoba ya liboso ya kosamba, batikelaki ye bonsomi kasi asengeli kokende sanza nyonso komimonisa epai ya bakonzi. Longola yango, na ntango wana ya bonsomi, akoki te kosala mobembo mpo na kolongwa na engumba na ye Khabarovsk mpo na kokende esika mosusu, mpe bapesaki ye nzela te ya kobima na mpokwa na ndako na ye. Ndeko Aksenov akosɛnga bátalela lisusu likambo na ye.