Lakisá makambo oyo ezali na kati

11/02/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ezali kolandela ndeko Mikhail Popov ná mwasi na ye, Yelena​—Ekateli ekozwama na mokolo ya 13/02/2020

Tribinale ya Russie ezali kolandela ndeko Mikhail Popov ná mwasi na ye, Yelena​—Ekateli ekozwama na mokolo ya 13/02/2020

Tribinale ya engumba Vilyuchinsk ezali kokana koyebisa ekateli oyo ezwi na likambo ya ndeko Mikhail Popov ná mwasi na ye, ndeko Yelena Popova, na mokolo ya 13/02/2020. Bakangaki bandeko yango na bolɔkɔ na mokolo ya 30/07/2018, na Kamchatka mpe babimaki na bolɔkɔ na mokolo ya 09/08/2018. Bafundaki bango na likambo etali “mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki.”

Mikhail ná Yelena bazali kotyela Yehova motema wana bazali kolekisa ntango wana ya mpasi. Tondimi ete Yehova akokoba kozala “ekimelo mpe bokasi” na bango.​—Nzembo 46:1.