Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banda na lobɔkɔ ya mwasi tii na lobɔkɔ ya mobali: Ndeko Aleksandr Prianikov, ndeko Venera Dulova, mpe mwana na ye ya mwasi Darya Dulova, liboso básambisa bango

24/01/2020
RUSSIE

Tribinale ya engumba Karpinsk, na Russie ezali kolandela ndeko mobali moko mpe bandeko basi mibale mpo na kokweisa bango na likambo

Tribinale ya engumba Karpinsk, na Russie ezali kolandela ndeko mobali moko mpe bandeko basi mibale mpo na kokweisa bango na likambo

Tribinale ya engumba Karpinsk ekokata likambo ya ndeko Venera, Darya Dulova mpe ya ndeko Aleksandr Prianikov na mokolo ya 27/01/2020. Prokirɛrɛ asɛngi bápesa ndeko mobali Prianikov ná ndeko mwasi Venera Dulova etumbu ya bolɔkɔ ya mbula misato, kasi ndeko mwasi Darya Dulova mbula mibale ya bolɔkɔ.

Na mokolo ya 19/04/2016, ndeko mobali Prianikov mpe ndeko mwasi Venera Dulova basololaki na mobali moko makambo ya Biblia. Ndeko moko ya libota ya mobali yango afundaki ndeko mobali Prianikov ná ndeko mwasi Dulova ete bazali miyibi mpe abengaki bapolisi. Bapolisi bamemaki bango na biro na bango. Bapolisi bazwaki elembo ya mabɔkɔ na bango mpe babɔtɔlaki bango mikanda oyo bazalaki na yango.

Mpo na likambo wana oyo bafundaki bango, mbula koleka mibale na nsima bakangaki bango mpo na kotunatuna bango mituna. Babɔtɔlaki bango batelefone mpe biloko na bango mosusu. Komanda ya polisi asɛngaki profesɛrɛ mosungi moko ya teoloji atalela makambo oyo ezali na kati ya telefone ya ndeko mobali Prianikov mpe ya ndeko mwasi Dulova. Na lapolo na ye ya nkasa 15, profesɛrɛ alobaki ete batelefone na bango ezalaki na mateya ya Batatoli ya Yehova. Mpo na lapolo wana, bafundaki bango na likambo ete bazali bato mabe. Yango wana, tribinale ya engumba Karpinsk epesaki nzela ete básala ankɛtɛ na bandako na bango.

Ntango bazalaki kosala ankɛtɛ na ndako ya ndeko mwasi Dulova, bapolisi bazwaki baaparɛyi na ye, babuku mpe bafɔtɔ. Babengaki mpe Darya mwana-mwasi ya ndeko Dulovar oyo azali na mbula 18 mpo na kotunatuna ye mituna. Bapolisi bakobaki kosala ankɛtɛ na bandako ya bandeko na bango ezala mpe na ndako ya ndeko mobali Prianikov.

Lisusu, na ntɔngɔ ya mokolo ya 16/04/2019, basali misato ya sireté (FSB), moto moko oyo asalaka ankɛtɛ, mpe bapolisi mibale, bakɔtaki na ndako ya ndeko Prianikov. Bapolisi yango babɔtɔlaki baaparɛyi na ye mpe biloko na ye mosusu ya ndako.

Na mokolo ya 23/07/2019, bakangaki ndeko mwasi Darya Dulova mpo na kotunatuna ye mituna na efundeli ya lokuta oyo bafundaki mama na ye mpe ndeko Prianikov. Bango nyonso misato bafundamaki mpe basambisamaki mpo na mbala ya liboso na sanza ya 09/2019.

Mpo na bandeko na biso oyo misato mpe bandeko basi mpe mibali mosusu pene na 300 oyo bazali kosamba na batribinale mpe bazali na bolɔkɔ na Russie, tozali kobondela na kondima nyonso ete: “Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na bino, mpo bótonda na elikya na nguya ya elimo santu.”​—Baroma 15:13.