Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Yelena Barmakina elongo na mobali na ye, Dmitriy, na libándá ya lopango ya tribinale ya Pervorechenskiy oyo ezali na etúká ya Vladivostok

29 SANZA YA 09, 2020
RUSSIE

Zuzi atiki kosambisa ndeko Yelena Barmakina mpo bilembeteli ezali te

Zuzi atiki kosambisa ndeko Yelena Barmakina mpo bilembeteli ezali te

Na mokolo ya 29/09/2020, tribinale ya Pervorechenskiy oyo ezali na etúká ya Vladivostok ezwaki ekateli te mpo na ndeko Yelena Barmakina. Tribinale yango ezongisi likambo yango epai ya prokirɛrɛ. Zuzi yango alimbolaki ete prokirɛrɛ azalaki na bilembeteli te mpo na komonisa ete ndeko Barmakina azalaki kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo. Biro ya prokirɛrɛ ekoki kosɛnga ete bátalela lisusu likambo yango. Soki esali yango te, tribinale ekokata makambo te tii ntango bakopesa bilembeteli oyo endimisi bifundeli yango.