Lakisá makambo oyo ezali na kati

31 SANZA YA 5, 2018
RUSSIE

Motatoli ya Yehova mosusu azali kosamba na Russie mpo bafundi ye ete asali mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki

Motatoli ya Yehova mosusu azali kosamba na Russie mpo bafundi ye ete asali mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki

Esali sikoyo mbula mobimba banda Arkadya Akopyan, Motatoli ya Yehova oyo azali na mbula 70 mpe azwa pansiɔ na mosala ya kotonga bilamba azali kosamba na tribinale mpo bafundaki ye ete asali mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki. Soki alongi te na kosamba yango, akoki kofuta amande ya mbongo mingi to kosala mbula koleka minei na bolɔkɔ.

Prokirɛrɛ alobi ete ndeko Akopyan amemi ngambo mpo “azali kotinda mangomba eyinana” mpo na diskur oyo asalaki na Ndako ya Bokonzi esika ayanganaka mbala na mbala ekokisi sikoyo bambula mingi. Na tribinale yango, prokirɛrɛ atingamaki kaka na efundeli ya lokuta oyo bato motoba oyo bazali Batatoli ya Yehova te bafundaki ye. Bato yango balobaki ete Akopyan alobaki maloba ya kofinga ntango azalaki kosala diskur yango mpe apesaki bango mikanda oyo “elekisaka ndelo” mpo bápesa yango bato mosusu.

Ndeko Akopyan ná bato oyo bayebi ye balobi ete makambo bato yango balobi ezali lokuta. Avoka na ye apesaki elembeteli oyo emonisaki ete bato motoba yango bazalaki te na Ndako ya Bokonzi esika balobi ete Akopyan alobaki maloba yango. Longola yango, Batatoli ya Yehova bapesaka bato mosusu te mikanda na bango mpo bato yango bápesa yango bato mosusu. Sonya, mwasi ya Akopyan azali Motatoli ya Yehova te, kasi ayebisaki bazuzi ntango batunaki ye mituna ete asali mbula 40 na libala elongo na mobali na ye mpe azali na esengo na libala yango mpe ete mobali na ye atindá ata moto moko te ya libota na bango na makasi ete akóma Motatoli ya Yehova.

Zuzi Oleg Golovashko asɛngaki ete moto moko ya mayele atalela malamumalamu makambo oyo Akopyan alobaki ntango asalaki diskur yango mpo báyeba soki ‘atindaki mangomba eyinana.’ Na kosamba oyo Akopyan asambaki mokolo ya 15/05/2018, zuzi alobaki ete moto yango ya mayele akosilisa mosala apesaki ye na sanza ya 09/2018, kasi akokoba naino kosambisa likambo yango. Bakosambisa lisusu likambo yango na mokolo ya 5/06/2018, ntango bakotuna Akopyan mituna. Atako batye ye naino na kasho te, bapekisi Akopyan asala mibembo banda kosamba na ye ebandaki na sanza ya 05/2017 na tribinale ya etúká ya Prokhladny.

Gregory Allen, Avoka oyo asambaka makambo ya Batatoli ya Yehova, alobi boye: “Akopyan azali kaka na molɔngɔ ya bato oyo bakwei na mabɔkɔ ya bakonzi ya Russie oyo bazali kosalela na ndenge ya mabe mobeko etali kosala makambo oyo elekisaka ndelo mpo na konyokola Batatoli ya Yehova. Asali mabe moko te, azali mwana-mboka oyo atosaka mibeko mpe alingi kaka kosambela Nzambe na kimya. Libunga ya kolandela Batatoli ya Yehova oyo guvɛrnema yango ezali kotya Motatoli ya Yehova nyonso na likama mpe ezali kobebisa boyokani na mabota na makambo ndenge na ndenge na ekólo yango.”

Ndeko Akopyan azali Motatoli ya Yehova ya mibale oyo bazali kosambisa ye kaka mpamba mpo na “mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki.” Kosamba ya Dennis Christensen, Motatoli ya Yehova moko na Oryol, ebandaki na sanza ya 02/2018. Asali mbula mobimba banda batya ye na kasho mpe bakoki kokatela ye etumbu ya mbula 10 ya bolɔkɔ soki alongi te na kosamba yango. * Batatoli ya Yehova mosusu nsambo bazali na kasho na bisika ndenge na ndenge na Russie kasi naino bakateli bango bitumbu te.

^ par. 7 Bafundaki mibali yango nyonso mibale ete babuki mobeko ya mboka na Artikle ekeseni. Akopyan bafundaki ye ete abuki Artikle 282(1) ndenge atindi mangomba eyinana. Dennis Christensen bafundaki ye abuki Artikle 282.2(1) oyo epekisi kobongisa misala ya lingomba oyo Leta elobi ete elekisaka ndelo na makambo ya losambo. Etumbu ya makasi epesamaka soki moto abuki Artikle yango mokomoko.