Lakisá makambo oyo ezali na kati

7 SANZA YA 5, 2018
RUSSIE

Tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg endimi ekateli ya kobɔtɔla bandako ya biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg endimi ekateli ya kobɔtɔla bandako ya biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Na mokolo ya 3/05/2018, tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg eboyaki likambo oyo Batatoli ya Yehova basɛngaki ete básamba lisusu mpo Leta ebɔtɔla te Biro ya misala na bango oyo ezali na Solnetchnoïe. Leta ekoki sikoyo kosalela ekateli yango mpe kobɔtɔla bandako ya Biro yango ntango nyonso elingi.

Ekateli yango endimisi ekateli oyo tribinale ya etúká ya Sestroretsk ezwaki, ekateli oyo eboyaki kɔntra ya mbula 17 oyo epesaki Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania lotomo ya kozala nkolo bandako yango. Ndenge Leta esilisaki valɛrɛ ya kɔntra yango nde epesi tribinale likoki ya koloba ete Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Russie nde ezalaki nkolo esika yango. Na yango, lokola tribinale monene epekisaki misala ya Biro yango na sanza ya 04/2017, Leta ekómi na lotomo ya kobɔtɔla bandako yango. Makanisi wana oyo ebongi te, epesi guvɛrnema nzela ya kobɔtɔla bandako yango ndenge elingi.

Philip Brumley, avoka na Biro monene ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Ekateli yango ezali kozanga bosembo moko ya mabe mpenza. Bandako yango bapesá yango Nzambe mpe esalisi mpo misala ya losambo ya Batatoli ya Yehova esalema na Russie. Likambo oyo guvɛrnema ezali kosala ekokani na koyiba. Tozali na ekateli ya komema likambo yango ya kozanga bosembo na Tribinale monene ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto.”