Lakisá makambo oyo ezali na kati

22/6/2018
RUSSIE

Mituna-lisolo: bandeko basi mitano balobeli ndenge bapolisi bakɔtelaki bango na ndako na Ufa, Russie

Mituna-lisolo: bandeko basi mitano balobeli ndenge bapolisi bakɔtelaki bango na ndako na Ufa, Russie

Na ntɔngɔ mpenza ya mokolo ya 10/04/2018, bato oyo basalaka ankɛtɛ mpe bapolisi, basusu balataki maskɛ mpe bazalaki na mindoki, bakɔtelaki Batatoli mingi mpe bazalaki kolukaluka na bandako na bango na Ufa, mboka-mokonzi ya engumba Bashkortostan, Russie. Bakonzi bakangaki ndeko Anatoliy (Tolya) Vilitkevich mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Bandeko basi mitano ya Ufa, na kati na bango mwasi ya Tolya, Alyona, balobi ndenge bakɔtelaki bango etungisaki bango makasi.