Lakisá makambo oyo ezali na kati

3/5/2018
RUSSIE

Batatoli ya Yehova balongi te na kosamba oyo basɛngaki, yango epesi bakonzi ya Russie lotomo ya kobɔtɔla bandako ya Biro ya misala na bango

Batatoli ya Yehova balongi te na kosamba oyo basɛngaki, yango epesi bakonzi ya Russie lotomo ya kobɔtɔla bandako ya Biro ya misala na bango

Na mokolo ya 3/05/2018, Tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg endimaki ekateli ya liboso oyo ezwamaki na sanza ya 12/2017, ekateli oyo epesi guvɛrnema ya Russie lotomo ya kobɔtɔla nokinoki bandako ya Biro ya misala na biso oyo ezali na Solnechnoye.

Atako tokoki te kopekisa Leta ya Russie kobɔtɔla bandako yango, ekateli ya lelo ezali na kati ya likambo oyo tosɛngaki Tribinale monene ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto (CEDH) etalela mpe ezali kotalela dosye yango. CEDH eyebisaki guvɛrnema ya Russie ete dosye yango ezali na kati ya makambo ya libosoliboso oyo yango ezali kotalela.

Tozali kokoba kozela Yehova, Nzambe ya bosembo, asembola makambo na ntango oyo alingi.​—Yisaya 30:18.