Lakisá makambo oyo ezali na kati

RUSSIE

Russie: Bansango na mokuse

Russie: Bansango na mokuse

Na ebandeli, Batatoli ya Yehova bazalaki kosambela na kimya ntango guvɛrnema ya Russie endimaki lingomba na bango ekomama na buku ya Leta na 1992. Na 1999, Batatoli ya Yehova bakomisaki lisusu lingomba na bango na Leta na kolanda Mobeko oyo etali bonsomi ya lisosoli mpe ya losambo. Ezali na bibongiseli koleka 100 ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta mpe esalaka misala na ekólo yango mobimba.

Kasi, Batatoli ya Yehova bazali se kokutana na mikakatano oyo ezali kotya bonsomi na bango ya losambo na likama. Kobanda 2009, bakonzi ya Leta basalelaki na ndenge ya mabe mobeko oyo etali kopekisa misala ya bato ya mobulu mpo na kopesa mabɔkɔ na kampanye ya mabe oyo esalemaki na mboka yango mobimba mpo na kosambwisa Batatoli ya Yehova. Batribinale ya Russie elobaki ete mikanda koleka 12 ya Batatoli ya Yehova, ezala mpe site Internet jw.org ezali na liste ya mikanda oyo etindaka bato na mobulu. Polisi esalaki ankɛtɛ na bandako mingi ya Batatoli ya Yehova mpe na bisika na bango ya losambo. Bazuzi balobaki ete Batatoli ya Yehova bazali na foti kaka mpo basalaka makita na bango ya losambo.

Atako Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya moto mpe bibongiseli mosusu ya mokili mobimba epekisaki likambo yango, bakonzi ya Russie basali eloko moko te mpo na kotika konyokola Batatoli ya Yehova. Bakonzi bazali se kobakisa milende na bango mpo na kopekisa mosala ya Batatoli ya Yehova.