Lakisá makambo oyo ezali na kati

Etuluku ya bandeko oyo bayaki na Russie, kobanda ya lobɔkɔ ya mwasi tii ya mobali: Alberto Rovira (Espagne), Peter Hamadej (Slovaquie), Andrejs Gevla (Lettonie), Chong Ho (Corée), Yaroslav Sivulskiy (Russie), Johann Zimmermann (Autriche), Stefan Steiner (Suisse), Vasiliy Kalin (Russie), Tommi Kauko (Finlande), Mark Sanderson (États-Unis), Robert Delahaije (Pays-Bas), Marc Hansen (Belgique), Paul Gillies (Royaume-Uni), Lars-Erik Eriksson (Suède), Tommy Jensen (Danemark), Jørgen Pedersen (Norvège), Manfred Steffensdorfer (Allemagne), Teemu Konsti (Lituanie), Babis Andreopoulos (Grèce), Tambet Ernits (Estonie), Jean-Claude Pons (France)

21/7/2017
RUSSIE

Etuluku ya Batatoli ya Yehova ya mikili ndenge na ndenge bayei kopesa bandeko na bango ya Russie mabɔkɔ na tribinale monene ya Russie

Etuluku ya Batatoli ya Yehova ya mikili ndenge na ndenge bayei kopesa bandeko na bango ya Russie mabɔkɔ na tribinale monene ya Russie

NEW YORK. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezwaki bibongiseli mpo etuluku moko ya bandimi ya lingomba na bango oyo bauti na bakɔntina misato bakende na Moscou mpo na komonisa ete Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bazali kopesa bandeko na bango ya Russie mabɔkɔ.

Ntango bakómaki na Moscou, bandeko ya Russie bayambaki bango na esengo, atako bamosusu na bango bautaki mosika na Sibérie. Etuluku yango ya bandeko bakundwelaki bandeko ya Russie ete bazali na mpasi na motema mpo na mpasi oyo ezali kokómela bango mpe ete bandeko na mokili mobimba bazalaki kobondela mpo na bango. Moko ya bandeko ya etuluku yango alobaki boye: “Ezaleli ya mpiko oyo bandeko ya Russie bamonisaki esimbaki motema na ngai, mingimingi atako bazalaki na elikya mpenza te ete tribinale ekobongola makanisi oyo ezalaki na yango ya kopekisa losambo na biso na Russie.”

Atako bazuzi misato bakataki likambo yango na bosembo te, bandeko bazalaki kaka na esengo mpe na bomoko na tribinale yango. Batatoli ya Yehova bayokaki mawa mpenza ndenge tribinale yango esambwisaki nkombo ya Yehova na miso ya bato ebele bongo. Bamonaki mpe ete eleko ya komekama ezalaki kozela bandeko ya Russie. Kasi, ezaleli malamu mpe esengo oyo Batatoli ya Yehova bamonisaki na tribinale yango, ekweisaki efundeli oyo ete Batatoli ya Yehova “balekisaka ndelo na makambo na bango ya losambo” ndenge bazuzi balobaki.

Mark Sanderson, moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde akambaki etuluku yango. Alendisaki bandeko bázala “makasi mpe na mpiko” mpo na mikolo ezali koya. Ntango etuluku yango ya bandeko babimaki na tribinale, bandeko ya Russie bayambaki bango na mabɔkɔ mpe bapesaki bango matondi ndenge bayaki kopesa bango mabɔkɔ na mokolo wana oyo bakobosana yango te.

Bandeko ya etuluku yango bakendaki mpe na ba-ambasade 21 na Moscou mpo na koyebisa makambo oyo ekobima lokola Russie elingi kobundisa Batatoli ya Yehova: kotumba bandako, kobungisa misala, konyokola bana na biteyelo, kokanga bandeko oyo batambwisaka lisangá mpo bazali kotambwisa losambo, na ndakisa ndeko Dennis Christensen, oyo bakɔtisi ye bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Video moko ya miniti mibale oyo emonisaki na mokuse makambo yango epesaki baambasadɛrɛ mingi mpasi na motema. Motuna oyo baambasadɛrɛ yango batunaki mingi ezalaki: “Mpo na nini Batatoli ya Yehova?” Mpo na koyanola, bandeko bayebisaki bango ete bandimi ya lingomba na biso bakɔtaka te na makambo ya politiki mpe nsango ya Biblia oyo toteyaka esalisi Ba-Russe mingi bábongisa bomoi na bango, yango epesi litatoli moko monene. Ambasadɛrɛ moko alobaki: “Eglize Ɔrtɔdɔkse eboyi bóbɔtɔla bandimi na bango.” Baambasadɛrɛ soki zomi batindaki bato na bango na tribinale monene bákende kolanda ndenge bazuzi bazali kosambisa likambo yango na boumeli ya ngonga mwambe mobimba.

Bandeko ya etuluku yango babimaki na Russie na kondima makasi. Balendisamaki makasi na komona ekateli oyo bandeko ya Russie bazalaki na yango ya kotikala sembo mpe ndenge bazwaki libaku ya kopesa litatoli oyo ebongi epai ya bakonzi ya Leta.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango: +1-845-524-3000