Lakisá makambo oyo ezali na kati

20 SANZA YA 12, 2017
RUSSIE

Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika epekisami na Russie

Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika epekisami na Russie

Lelo, tribinale ya etúká ya Leningrad eboyaki ndenge tosɛngaki tósamba lisusu mpo na ekateli oyo tribinale ya engumba Vyborg ezwaki ya kopekisa Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Russe, oyo batyaki yango na molɔngɔ ya mikanda oyo etindaka bato na mobulu. Bato soki 30 balandaki ndenge tozalaki kosamba na tribinale yango, kati na bango tokoki kotánga bamonisi ya ambassade ya Grande-Bretagne, Pays-Bas, Suisse mpe États-Unis.

Na boumeli ya kosamba yango, baavoka na biso bamonisaki polele ete makambo oyo bato oyo tribinale epesaki mokumba ya kolandela Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika balobaki ezangaki motó ná makolo, mpo balobaki ete ezali Biblia te mpe yango epesi nzela mpo bátya yango na molɔngɔ ya mikanda oyo “etindaka bato na mobulu.”

Bato yango batingamaki kaka na maloba na bango ete Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia te mpo yango moko emibengi Biblia te. Kasi baavoka na biso babendaki likebi na bango na lokasa ya mitano ya Libongoli ya Mokili ya Sika ya 2007 na monɔkɔ ya Russe, epai elobi polele: “Oyo ezali libongoli ya sika ya Biblia na Russe.” Baavoka yango bamitunaki soki bato yango bazalaki kosala nini na boumeli ya mikolo 287 ntango bazalaki kosala ankɛtɛ na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika mpo bázanga komona maloba oyo ezali na paragrafe ya misato, na maloba ya ebandeli ya Biblia yango.

Ntango batunaki moko ya bato yango, atingamaki kaka na likanisi oyo balobaki liboso ete Libongoli ya Mokili ya Sika ekoki kotalelama te lokola Biblia longola kaka soki ezwaki “lipamboli ya patriarcat” to eyokani liloba na liloba na libongoli moko oyo ezwaki lipamboli yango. Bato yango bamonaki mpe mabe ndenge nkombo ya Nzambe Yehova, esalelami na Libongoli ya Mokili ya Sika, balobaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika eyokani te na mateya mosusu ya Eglize. Bazuzi baboyaki ndenge baavoka na biso basɛngaki ete bato mosusu oyo bakokɔtela ngambo moko te bázongela lisusu ankɛtɛ yango.

Lokola tribinale eboyaki bosɛnga na bango, bandeko bazali na likambo mosusu ya kosala te, bakomema likambo yango na Tribinale monene ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto.

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali na kondima ete ebongiseli moko te ya bato ekolonga kolimwisa Liloba ya Nzambe mpe ete nyonso oyo bazali kosala mpo na kopekisa Liloba ya Nzambe epalangana, ekolonga ata moke te.​—Yisaya 40:8.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000