Lakisá makambo oyo ezali na kati

16 SANZA YA 2, 2018
RUSSIE

Mosika te tribinale ya Oriol ekosambisa Dennis Christensen

Mosika te tribinale ya Oriol ekosambisa Dennis Christensen

Bazuzi bakosambisa mpo na mbala ya liboso likambo ya Dennis Christensen mokolo ya 19/02/2018. Christensen, azali Motatoli ya Yehova oyo azali moto ya ekólo Danemark mpe batyá ye na bolɔkɔ moko na engumba Oriol, na Russie, bandá bakangá ye na sanza ya 05/2017.

Na mokolo ya 31/01/2018, Prokirɛrɛ ya engumba Oriol atondisaki nkasa 76 na bifundeli oyo afundaki Christensen. Prokirɛrɛ alobaki ete abuki mobeko ya Artikle 282.2(1) ya Code pénal ya Russie​—mpo abongisaki makambo ya losambo ya lingomba oyo Leta etyá yango na molɔngɔ ya baoyo balekisaka ndelo. Etumbu mpo na likambo yango ezali ya mbula zomi ya bolɔkɔ.

Christensen asali mabe moko te. Bakangaki ye ntango azalaki na likita moko ya losambo elongo na mwasi na ye mpe bandimi mosusu ya lingomba na bango. Bakosambisa ye na mokolo ya 19/02/2018, na ngonga ya 14:30, na Zheleznodorozhniy, tribinale ya Oriol.