Lakisá makambo oyo ezali na kati

29/11/2018
RUSSIE

Dennis Christensen azwi lisungi ya mikili ndenge na ndenge

Dennis Christensen azwi lisungi ya mikili ndenge na ndenge

Ndeko Dennis Christensen alekisi mikolo koleka 525 na bolɔkɔ mpo azalaki kaka kosala makambo oyo losambo na ye esɛngi mpe basambisi ye mbala soki 50. Tribinale ya etúká Zheleznodorozhniy na Orel, na Russie, oyo ezali kotalela likambo ya Dennis, ezwi ekateli ya kosambisa ye lisusu na katikati ya sanza ya 12/2018. Atako alekisi sanza koleka 18 na bolɔkɔ, Dennis azali kaka na esengo mpe na elikya. Na ntembe te, yango emonisi ete Yehova azali kosunga ye na nzela ya mabondeli ya bamilio ya bandeko na biso na mokili mobimba.

Dennis azwi bakarte ebele mpe bamesaje oyo baninga na ye Batatoli ya Yehova ya ekólo Russie mpe ya bikólo mosusu bakomelaki ye mpo na kolendisa ye mpe kopesa ye mabɔkɔ. Na mokolo ya 30/10/2018, ntango bazalaki kosambisa ye, Dennis atyaki bakarte mpe bafɔtɔ oyo bana batindelaki ye na vitrɛ ya kasho na ye, mpo baoyo nyonso oyo bayaki kopesa ye mabɔkɔ bákoka kosepela komona yango.

Na mokolo ya 30/10/2018, ntango bazali kosambisa ye, Dennis Christensen atye mwa mikanda ya kolendisa oyo bakomelaki ye na vitrɛ ya kasho na ye.

Longola lisangá ya bandeko na mokili mobimba, bato ya mikili ndenge na ndenge batye miso na likambo ya Dennis. Na mokolo ya 21/07/2017, Centre du Mémorial des droits de l’homme oyo ezali na Moscou etyaki Dennis na molɔngɔ ya bato oyo bakɔtá bolɔkɔ mpo na makambo ya politiki. Na mokolo ya 20/06/2018, biro ya prokirɛrɛ mokonzi ezali kotalela soki endimami na mibeko ete bátya Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpo na makambo oyo bandimaka. Na mokolo ya 26/09/2018, ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bonsomi ya losambo na mokili mobimba (Commission américaine sur la liberté religieuse internationale) etye Dennis na molɔngɔ ya “bato oyo bakɔtá bolɔkɔ mpo na kotosa makambo ya losambo mpe lisosoli.”

Russie esɛngaki ete básambisa lisusu likambo etali kobɔtɔla Batatoli ya Yehova biro oyo etambwisaka misala na bango mpe soki bakati likambo yango, ekateli yango ekobebisa te ntomo oyo Motatoli ya Yehova mokomoko azali na yango ya kosala makambo oyo lingomba na bangi esɛngi. Bapolisi mpe bakonzi mosusu baboyaki lotomo oyo bazali na yango mpe basalelaki mibeko na ndenge ya mabe mpo na kolongisa ekateli na bango ya kokanga Dennis mpe bato mingi mosusu, bafundaki bango na likambo mpo na mosala oyo “elekisaka ndelo.” Mbula oyo, Russie etindaki bapolisi bákɔtela Batatoli ya Yehova na bandako na bango na ekólo mobimba. Na ntango oyo, bandeko mibali mpe basi 25 bazali na bolɔkɔ, bandeko 18 bakoki kobima na bandako na bango, mpe basusu koleka 40 bazali na bipekiseli ndenge na ndenge. Na yango, ekateli oyo tribinale ekozwa mpo na likambo ya Dennis nde ekomonisa makambo oyo ekokómela Batatoli ya Yehova mosusu koleka 90, na bitúká soki 30 ya Russie, oyo bazali kozela soki likambo na bango ekosuka ndenge nini.

Toyebi bandeko na biso na mokili mobimba bakotika te kobondela ete Yehova akoba kokómisa makasi mpe kolendisa bandeko basi mpe mibali oyo bazali na tribinale to na bolɔkɔ mpo na kondima na bango, lokola tozali kozela na mposa makasi mokolo mpe ntango oyo ‘akosala ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, ekatama na bosembo.’​—Luka 18:7.