Lakisá makambo oyo ezali na kati

15 SANZA YA 6, 2018
RUSSIE

Russie ebɔtɔli biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Russie ebɔtɔli biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Na mokolo ya 3/05/2018, tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg endimaki ekateli oyo ezwamaki na 12/2017, oyo epesaki guvɛrnema ya Russie nzela ya kobɔtɔla mbala moko bandako ya Betele ya Russie oyo ezali na Solnechnoye. Kaka nsima ya kosamba likambo yango, mopanzi-nsango moko, moto moko ya mayele na makambo ya mangomba mpe baavoka mibale ya Batatoli ya Yehova bamonisaki polele makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaki Batatoli ya Yehova. Mobali moko ná mwasi na ye oyo bapesaki mabɔkɔ na kotonga bandako yango, bamonisaki nini bandako yango elimbolaka mpo na bango.