Lakisá makambo oyo ezali na kati

17 SANZA YA 4, 2018
RUSSIE

Tribinale ekosambisa likambo ya kobɔtɔla biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Russie

Tribinale ekosambisa likambo ya kobɔtɔla biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Russie

Batatoli ya Yehova bakosamba lisusu mokolo ya 3/05/2018 na tribinale ya Saint-Pétersbourg mpo na ekateli oyo Leta ya Russie ezwaki ya kobɔtɔla biro ya kala oyo ezalaki kotambwisa misala na bango na Russie. Soki Batatoli ya Yehova balongi te na kosamba yango, Leta ekosalela ekateli yango mpe ekoki kobɔtɔla nokinoki bandako ya biro yango.

Liboso, tribinale ya etúká ya Sestroretskiy ekipaki te bilembeteli oyo emonisaki ete bandako ya biro yango ezali ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania (WTPA), ebongiseli ya mombongo te oyo biro na yango ezali na États-Unis. Bandako ya biro yango ekómá ya WTPA esali sikoyo mbula 17 mpe efutaka batakse ya Leta. Kasi na mokolo ya 7/12/2017, tribinale ya etúká yango elobaki ete kɔntra oyo emonisaki ete bandako yango ezali ya WTPA ezali lisusu na ntina te. Soki Batatoli ya Yehova balongi te na kosamba ya mbala oyo mpe mwaye mosusu ezali te ya kolandela likambo yango na mibeko ya Russie, bakomema likambo wana ya kozanga bosembo na Tribinale monene ya mikili ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto.

Tribinale ya Saint-Pétersbourg ekosambisa likambo yango mokolo ya 3/05/2018, na ngonga ya 11:30 ya ntɔngɔ, na ul. Basseynaya, 6, Saint-Pétersbourg, na Russie.