Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bisika oyo bapolisi bakɔtelaki Batatoli ya Yehova na bandako na Russie

2 SANZA YA 5, 2018
RUSSIE

Kampanye ya konyokola Batatoli ya Yehova ebandi na Russie

Kampanye ya konyokola Batatoli ya Yehova ebandi na Russie

Na bingumba soki nsambo ya Russie, bapolisi bakendaki na bandako ya Batatoli ya Yehova. Emonanaki lokola kampanye yango ebongisamaki, kasi na bantango mosusu bapolisi ya sireté (OMON), na ba maskɛ na bilongi mpe mindoki na mabɔkɔ bakɔtelaki Batatoli ya Yehova na bandako, balakisaki bango mindoki mpe bakangaki bilenge mpe mibange mpo na kotunatuna bango mituna.

Arkadya Akopyan, ná mwasi na ye, Sonya, mpe bankɔkɔ na bango mibale ya basi

Na mbula oyo eleki, bakonzi basalaki baankɛtɛ soki zomi na bandako ya Batatoli ya Yehova mpe bakɔtisaki Batatoli ya Yehova mitano na bolɔkɔ, na kati na bango Dennis Christensen, oyo bakangá ye banda mokolo ya 25/05/2017. Na République ya Kabardino-Balkaria, tribinale ebandi sikoyo kosambisa likambo ya Motatoli ya Yehova mosusu na nkombo Arkadya Akopyan, oyo azali na mbula 69. Bakoki kokatela bango nyonso etumbu ya bolɔkɔ ya mbula mibale tii zomi kaka mpo bayanganaki elongo mpo na losambo.

Na mokolo ya 20/04/2017, Tribinale monene ya Russie epekisaki misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova na Russie mpe bibongiseli na bango mosusu 395 ya mboka yango. Ntango bazalaki kosambisa likambo yango, guvɛrnema ya Russie elobaki ete atako bapekisi bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebanaki na Leta, Motatoli ya Yehova mokomoko azali na bonsomi ya kosala makambo na ye ya losambo. Kasi, makambo oyo bakonzi ya Russie balobaki eyokani te na oyo bazali kosala.

Lokola bakonzi ya Russie bapekisaki bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebanaki na Leta mpe bakómaki kobɔtɔla biloko na bango, bakómi sikoyo kolandela nde bato mpe losambo na bango. Mpo na Batatoli ya Yehova koleka 175 000 oyo bazali na Russie, kosala makambo na bango ya losambo ekosala ete Leta elandela bango.

Bapolisi bazali kokɔtela bango na bandako, kotunatuna mituna mpe kotya bango na bolɔkɔ

Kobanda sanza ya 01/2018, bapolisi bafungoleli Batatoli ya Yehova miso.

Mokolo ya 20/04/2018, na Chouïa, etúká ya Ivanovo: Bakonzi ya polisi bakɔtaki na bandako minei ya Batatoli ya Yehova mpo na kolukaluka. Bapolisi bamemaki Dmitry Mihailov na biro ya polisi, batyaki ye na kasho mpe na nsima babimisaki ye. Bakonzi bakómaki kolandela ye mpe bafundaki ye ete abuki artikle 282.2(2) ya mibeko ya mboka na bango mpo “apesaki mabɔkɔ na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.” Bapekisi ye kosala mibembo na libándá ya Chouïa tii na ntango oyo eyebani te.

Mokolo ya 19/04/2018, na Vladivostok: Polisi mpe bato ya sireté (FSB) bakɔtaki na apartema moko mpe bamemaki Valentin Osadchuk ná mibange misato ya basi na biro ya polisi mpo na kotunatuna bango mituna. Bakonzi balobaki ete Osadchuk abuki Artikle 282.2(2) ya mibeko ya mboka mpe etumbu mpo na yango ezali mbula mibale tii minei ya bolɔkɔ mpe batyaki ye na kasho mpo na mwa ntango. Na mokolo ya 23/04/2018, tribinale ya etúká ya Frunzenskiy esɛngaki bátika Osadchuk na kasho tii mokolo ya 20/06/2018. Azali sikoyo na bolɔkɔ ya ankɛtɛ nimero 1 na Vladivostok.

Mokolo ya 18/04/2018, na Polyarny, etúká ya Murmansk: Liboso butu ekɔta, bapolisi ya OMON, na ba maskɛ na bilongi mpe mindoki na mabɔkɔ batindikaki porte ya Roman Markin. Balakisaki ye mondoki mpe balalisaki ye na nse. Ntango mwana na ye ya mwasi amonaki bongo, amilalisaki na nse mpe atyaki mabɔkɔ na motó mpo na kobomba motó na ye. Bapolisi balukalukaki na ndako na ye mpe na nsima, bamemaki Markin na biro ya polisi mpe batyaki ye na kasho mpo na mwa ntango.

Kaka na mpokwa yango, bapolisi bakɔtaki na bandako 14 ya Batatoli ya Yehova na kartye yango mpe babɔtɔlaki batelefone, batablɛti mpe biloko mosusu. Na nsima, bapolisi bamemaki Batatoli ya Yehova yango na biro na bango mpo na kotunatuna bango mituna. Bakonzi yango bakómaki kolandela Markin mpe Viktor Trofimov Motatoli ya Yehova mosusu. Balobaki ete bango nyonso mibale babuki Artikle 282.2(1) ya mibeko ya mboka mpo ‘babongisaki misala ya ebongiseli oyo makambo na bango elekisaka ndelo.’ Soki bakwei na likambo, bakoki kosala bolɔkɔ ya mbula motoba tii zomi. Bango nyonso mibale bazali naino na bolɔkɔ nimero 1 na Murmansk.

Mokolo ya 10/04/2018, na etúká ya Zaton, na Ufa: Kobanda ngonga ya 6:30 tii ngonga ya 7:00, bato ya ankɛtɛ mpe bapolisi ya OMON bakɔtaki na bandako mingi ya Batatoli ya Yehova mpe balukaki koyeba soki babombi nini. Ntango bazalaki kolukaluka, bapolisi yango batunatunaki Batatoli ya Yehova mituna. Polisi moko alobaki na Motatoli ya Yehova moko ete: “Tokotika yo soki olobi kaka ete ozali lisusu moto ya lingomba ya Batatoli ya Yehova te.” Polisi mosusu mpe alobaki na Motatoli ya Yehova mosusu boye: “Tokosilisa bino na mabele.” Bamemaki Batatoli ya Yehova nyonso na biro ya polisi mpo na kozwa bango bilembo ya mabɔkɔ mpe bakobaki kotunatuna bango mituna.

Ntango bazalaki koluka biloko nini ebombani na ndako ya Khafizov, bapolisi balakisaki ye ná mwasi na ye mondoki mpe babandaki kolukaluka na ndako yango. Na nsima, polisi moko atindikaki mwasi ya Khafizov na lobɔkɔ mpe akɔtisaki ye na motuka ya polisi mpe amemaki ye na biro ya polisi mpo na kotunatuna ye mituna. Khafizov azali Motatoli ya Yehova te.

Anatoliy ná Alyona Vilitkevich, liboso bákanga ye

Bapolisi bakɔtaki mpe na ndako ya Anatoliy Vilitkevich mpe bakangaki ye. Bayebisaki mwasi na ye ete akomona mobali na ye lisusu te “na boumeli ya ntango molai.” Bakonzi bafundaki ye ete abuki Artikle 282.2(1) ya mibeko ya mboka mpo ‘abongisaki misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe batyaki ye na kasho tii mokolo ya 2/06/2018. Soki akwei na likambo, akoki kosala mbula zomi ya bolɔkɔ.

Na sanza ya 03/2018, na Oryol: Longola dosye ya Dennis Christensen oyo ezali na tribinale, bakonzi babandi ankɛtɛ mosusu ya kolandela Motatoli ya Yehova moko na nkombo, Sergey Skrynnikov, nsima ya kokɔta na bandako nsambo ya Batatoli ya Yehova na sanza ya 05/2017, na engumba Oryol. Naino bakweisi Skrynnikov na likambo te. Bafundi ye ete abuki Artikle 282.2(2) ya mibeko ya mboka mpo ‘apesaki mabɔkɔ na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.’ Soki akwei na likambo, akoki kosala bolɔkɔ ya mbula mibale tii mitano ya bolɔkɔ.

Mokolo ya 7/02/2018, na Belgorod: Ebele ya bapolisi bakɔtaki na bandako soki 10 ya Batatoli ya Yehova. Balalisaki bankolo-ndako na nse to batindikaki bango na efelo. Bapanzaki biloko ya ndako mpe babɔtɔlaki baaparɛyi, ba passeports, bafɔtɔ mpe mbongo. Na nsima bamemaki Batatoli ya Yehova nyonso na biro ya polisi, batunatunaki bango mituna mpe batikaki bango nyonso bákende, longola kaka Anatoly Shalyapin ná Sergei Voikov. Bapolisi batikalaki na mibali yango mibale na boumeli ya ngonga 48 liboso bátika bango. Kasi, bapekisi mibali yango mibale kosala mibembo libándá ya Belgorod.

Mokolo ya 23/01/2018, na Kemerovo: Bapolisi bakɔtaki na bandako 12 ya Batatoli ya Yehova, bapanzaki biloko ya ndako mpe babɔtɔlaki bango baaparɛyi nyonso, mikanda ya losambo mpe mikanda mosusu. Liboso básala likambo yango, mobali moko, oyo amibimisaki lokola Motatoli ya Yehova ayanganaki na makita na bango mpe azwaki na kobombana bilili ya makambo nyonso oyo elekaki na makita yango mpe apesaki yango bapolisi, yango wana bapolisi bayaki kokɔtela Batatoli ya Yehova na bandako.

Ekateli ya Tribinale monene ekoki kokabola bato ya libota

Longola makambo oyo ebongi te, oyo bapolisi mpe bato ya sireté bazali kosalela Batatoli ya Yehova, bakonzi ya Russie bazwaki ekateli ete Leta ekobɔtɔla Batatoli ya Yehova bana mpo na “kosembolama.” Na mokolo ya 14/11/2017, na likita oyo tribinale monene esalaki, endimaki ekateli nimero 44 oyo elobaki ete bakoki kolongola baboti “lotomo na bango ya baboti na tribinale moko” soki bazali kolakisa bana na bango makambo ya lingomba moko oyo bapekisi mpo makambo na yango “elekisaka ndelo.”

Na mokolo ya 23/11/2017, ministère ya makambo etali kelasi mpe siansi ebimisaki “mobeko moko” na ekólo mobimba oyo esɛngaki “kosembolama” ya bana oyo balandaka “mateya ya lingomba oyo makambo na yango elekisaka ndelo.” Ministère yango elobelaki etuluku mibale ya bana: Bana ya Bamizilma mpe bana ya Batatoli ya Yehova. Elobaki ete “ebele ya bana mpe bilenge” bazali na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova. Naino babɔtɔli Motatoli ya Yehova moko te mwana.

Kampanye yango ekosila mokolo nini?

Ekólo mosusu te oyo ezali na lisangá ya mikili ya Mpoto (Conseil de l’Europe) ezali konyokola bato ya lingomba oyo bazali mingi te mpe bazali bato ya kimya. Batatoli ya Yehova na Russie bazali lisusu te na likoki ya koyangana na bonsomi nyonso na makita na bango ya losambo to kotánga mpe koyekola Biblia. Mpo na koboya ete Leta ekanga to elandela bango, basengeli kosala makambo na bango ya losambo na kobombana, ndenge ezalaki na eleko ya Union soviétique.

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali komitungisa mpo na bandeko na bango ya Russie mpe mpo na kampanye oyo guvɛrnema ya Russie esali mpo na konyokola bango na makanisi, na elimo mpe na nzoto. Philip Brumley, Avoka na biro monene ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Guvɛrnema ya Russie esengeli kotika konyokola Batatoli ya Yehova ndenge wana mpe kotosa ntomo ya moto mpe bonsomi ya losambo oyo endimami na mibeko ya mikili ndenge na ndenge. Sikoyo lokola Guvɛrnema ya Russie ekangi bibongiseli nyonso ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta mpe ekɔtisi Batatoli ya Yehova mosusu na bolɔkɔ, nini ekokómela lisusu Batatoli ya Yehova na Russie?”