Lakisá makambo oyo ezali na kati

1 SANZA YA 3, 2018
RUSSIE

Tribinale ya Oriol epusi mokolo oyo bakosambisa Dennis Christensen na 3/4/2018

Tribinale ya Oriol epusi mokolo oyo bakosambisa Dennis Christensen na 3/4/2018

Babandaki kosambisa Dennis Christensen mokolo ya 26/02/2018, na Zheleznodorozhniy, tribinale ya Oriol. Bato mingi oyo bazali kopesa Christensen mabɔkɔ bayaki na tribinale yango. Jeanne Christina Demirci consul ya ambasade ya Danemark oyo autaki Moscou, azalaki mpe na tribinale yango. Nsima ya kosamba kaka ngonga moko, zuzi Aleksey Rudnev abakiselaki Christensen na baavoka na ye ntango mpo bátalela lisusu malamu makambo oyo ezali na dosye yango. Liboso bábanda kosambisa ye, tribinale ya Sovetskiy elongolaki lotomo mosusu oyo Christensen azali na yango, epesaki ye kaka pɔsɔ mibale mpo atalela dosye yango oyo ezalaki na nkasa 2 500, na monɔkɔ ya Russe. Zuzi Rudnev apusi dati ya kosambisa Christensen na mokolo ya 3/4/2018 na ngonga ya 10:30. Tii dati yango ekoka, Christensen azali naino na bolɔko.