Lakisá makambo oyo ezali na kati

12 SANZA YA 4, 2017
RUSSIE

Bilembeteli mosusu oyo epesamaki na mokolo ya minei ya kosamba na Tribinale monene ya ekólo Russie

Bilembeteli mosusu oyo epesamaki na mokolo ya minei ya kosamba na Tribinale monene ya ekólo Russie

NEW YORK​—Na mokolo ya minei, liboso ya ebele ya bato, tribinale ekobaki kotalela likambo oyo Ministere ya Justice esɛngaki ya kopekisa misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Russie. Na mpokwa ya mokolo yango, tribinale elobaki ete bakokoba kosambisa likambo yango mokolo ya misato 19/04/2017 na ngonga ya 10:00.

Baavoka ya Batatoli ya Yehova nde bazwaki maloba mpo na kosamba liboso ete baavoka ya Ministere ya Justice básamba. Mpo na bilembeteli oyo baavoka ya Batatoli ya Yehova bapesaki, zuzi asɛngaki Ministere ya Justice emonisa mpenza na kolanda mibeko ntina ya kopekisa misala ya biro ya Batatoli ya Yehova. Baavoka ya Ministere ya Justice bayebaki te báloba nini na likambo zuzi asɛngaki bango mpe na mituna mosusu oyo etalaki likambo yango. Nsima ya koyoka batɛmwɛ ya ngámbo nyonso mibale nde kosamba yango esukaki.

Na pɔsɔ ekoya, tribinale esengeli kotalela lisusu makambo yango.

Bato bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Russie: Yaroslav Sivulskiy, +7-911-087-8009