Lakisá makambo oyo ezali na kati

23 SANZA YA 5, 2018
RUSSIE

Mikili ndenge na ndenge esepeli te ndenge Russie ezali konyokola Batatoli ya Yehova

Mikili ndenge na ndenge esepeli te ndenge Russie ezali konyokola Batatoli ya Yehova

Makambo oyo Union européenne mpe États-Unis elobi emonisi ete bazali komitungisa ndenge guvɛrnema ya Russie ezali konyokola Batatoli ya Yehova. Maloba yango emonisi ete Russie ebuki lokuta ndenge elobaki ete epekisaki misala ya bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta, kasi yango ekobebisa te bonsomi oyo Motatoli ya Yehova mokomoko azali na yango ya kosala makambo na ye ya losambo. Kasi, ndenge Union européenne emonisi yango “makambo oyo [guvɛrnema ya Russie] ezali kosala eyokani te na makambo oyo elobaki.” États-Unis elobi ete makambo oyo Russie elobaki ná ndenge oyo ezali kosalela Batatoli ya Yehova makambo “ezali na boyokani ata moke te.”

Bakonzi ya Russie batye na bolɔkɔ mibali mwambe oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe bazali sikoyo kosala baankɛtɛ 12 na bingumba 11 mpo na koluka koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali basali-mabe. Atako ndenge guvɛrnema ya Russie ezali kokoba kobɔtɔla bandako ya misala ya Batatoli ya Yehova ezali kotungisa, kasi likambo oyo ezali kotungisa mingi ezali mpasi oyo mokristo mokomoko azali na yango ndenge guvɛrnema ezali konyokola bango mpo na makambo ya losambo.

Union européenne ná États-Unis esɛngi guvɛrnema ya Russie etosa maloba na yango na likambo etali bonsomi ya makanisi, ya lisosoli mpe ya lingomba to makambo oyo moto andimaka.

Esika ya kokɔta mpo na komona maloba yango:

https://www.osce.org/permanent-council/381820

https://www.osce.org/permanent-council/381823