Lakisá makambo oyo ezali na kati

31 SANZA YA 7, 2014
RUSSIE

Tribinale ya Taganrog ekweisi Batatoli ya Yehova mpo na losambo na bango

Tribinale ya Taganrog ekweisi Batatoli ya Yehova mpo na losambo na bango

Na mokolo ya 30/07/2014, Tribinale ya Taganrog ekweisaki mpe ekatelaki Batatoli 7 kati na 16 oyo bafundamaki mpo bayanganaki mpe babongisaki makita oyo basalaka na kimya. Bazalaki kolandela bango mpo na makambo oyo Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe basalaka. Ekateli yango ebandi kotya likama na bonsomi ya losambo ya Batatoli ya Yehova na Russie mobimba.

Zuzi akanaki koyebisa ekateli yango mokolo ya 28/07/2014, kasi atyaki yango mokolo oyo elandaki. Mokolo ya 29/07/2014, zuzi atángaki mokolo mobimba nkasa 100 oyo ezalaki kolimbola ekateli yango mpe akobaki mokolo ya 30/07/2014 na ntɔngɔ. Akatelaki bankulutu minei mbula kobanda mitano tii mitano na ndambo ya bolɔkɔ mpe lomande ya 100 000 roubles (2800 $U.S.). Akatelaki mpe mokomoko ya Batatoli mosusu misato lomande kobanda na 50 000 tii 60 000 roubles (kobanda 1400 tii 1700 $U.S.). Lokola kosambisama yango elakaki ntango oyo esengelaki kosalema, zuzi alongolaki lomande nyonso oyo akatelaki Batatoli yango, mpe mbula nyonso ya bolɔkɔ oyo akatelaki bango. Batatoli 9 oyo batikalaki babikaki.

Zuzi atalelaki ekateli ya sanza ya 09/2009 ya tribinale ya etúká ya Rostov oyo elobaki ete esengelaki kopekisa lingomba ya Batatoli ya Yehova na Taganrog. Atako ekateli ya 2009 etalelaki mingimingi biro ya Batatoli ya Yehova, zuzi amonaki ete misala ya Batatoli ya Yehova na Taganrog mpe bitúká ya zingazinga epekisamaki.

Na boumeli ya sanza 15 ya kosambisama, Batatoli oyo bafundamaki balobaki polele ete bakowangana kondima na bango te mpe bakokoba losambo na bango. Mpo na baoyo bakatelaki etumbu, ekateli na bango ya kokoba losambo na bango elimbolaki ete bakokaki kokangama na bolɔkɔ lokola batomboki.

Victor Zhenko, moko ya baavoka oyo balandelaki likambo yango alobaki boye: “Nazali kobanga mpo na likambo oyo ekateli oyo ekomemela Batatoli ya Yehova na Russie. Bakonzi ya bapolisi to bazuzi bakoki kolobela yango na kampanye moko ya piblisite, mpo na kokoba kotya mbamba mpe konyokola Batatoli ya Yehova. Bakokanela bango ete bakosala bolɔkɔ kaka mpo na losambo na bango.”

Batatoli na Taganrog bamemi ekateli yango na tribinale ya Rostov.