Lakisá makambo oyo ezali na kati

11 SANZA YA 12, 2017
RUSSIE

Tribinale ya Russie ezali kosambisa lisusu efundeli oyo elobaki ete Biblia “elekisi ndelo”

Tribinale ya Russie ezali kosambisa lisusu efundeli oyo elobaki ete Biblia “elekisi ndelo”

Na mokolo ya 6/12/2017, tribinale ya etúká ya Leningrad etalelaki likambo oyo Batatoli ya Yehova basɛngaki mpo na ekateli oyo tribinale moko ya moke ezwaki ya kopekisa Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Russe.

Na ebandeli ya kosamba yango, baavoka ya Batatoli ya Yehova bamonisaki ete ekateli oyo tribinale ya Vyborg ezwaki ebongi te mpo etalelaki kaka makambo oyo “baoyo basalaki ankɛtɛ” balobaki. Tribinale etángaki ata likambo moko te ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ankɛtɛ yango emoni ete “elekisi ndelo.” Kutu etalelaki kaka makambo oyo bato yango balobaki na nsuka ya ankɛtɛ yango ete Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika “elekisi ndelo” mpo esaleli nkombo ya Nzambe, Yehova. Baavoka bakundwelaki tribinale ete Nkombo ya Nzambe ezali na esika monene na mimeseno mpe istware ya ekoló Russie mpe nkombo yango ezali na mabongoli mosusu mingi ya Biblia. Bamonisaki mpe ete likambo bato oyo basalaki ankɛtɛ yango balobaki ete Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia te mpo yango moko elobi ata esika moko te ete ezali Biblia, ezalaki lokuta. Baavoka batángaki maloba oyo ezali na lokasa ya ebandeli ya Biblia oyo ebimaki na 2007 oyo elobaki: “Oyo ezali libongoli ya sika ya Biblia na monɔkɔ ya Russe.”

Tribinale ya Leningrad ezwaki ekateli ya kobengisa etuluku mosusu ya bato mpo bázongela lisusu ankɛtɛ yango mpe tribinale ekozongela lisusu kosambisa likambo yango na mokolo ya 20/12/2017 na ngonga ya 14:30.