Lakisá makambo oyo ezali na kati

5 SANZA YA 4, 2017
RUSSIE

Tribinale monene ya Russie ebandi kotalela likambo ya Batatoli ya Yehova oyo bapanzi-nsango bazali kolobela mingi

Tribinale monene ya Russie ebandi kotalela likambo ya Batatoli ya Yehova oyo bapanzi-nsango bazali kolobela mingi

NEW YORK​—Lelo tribinale monene ya ekólo Russie ebandaki kotalela likambo oyo ministère ya Justice esɛngaki ete bákanga biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Russie. Tribinale ekataki naino kosambisa likambo yango mpe elobaki ete bakozongela kosambisa yango na mokolo ya 6/04/2017 na ngonga ya 14:00.

Na mokolo ya 30/03/2017, Batatoli ya Yehova basɛngaki tribinale etalela lisusu likambo oyo ministère ya Justice efundaki bango, kasi tribinale eboyaki kotalela likambo yango liboso epusa mokolo ya kosambisa yango. Lisusu, tribinale eboyaki baavoka ya ministère ya Justice bámonisa ntina oyo ministère elobaki bákanga biro ya misala ya Batatoli ya Yehova; eboyaki mpe bato oyo bapesaki bilembeteli ya lokuta mpo na bibongiseli ya Batatoli ya Yehova na Russie báloba.

Lokola ezalaki likambo ya ntina mingi oyo bapanzi nsango mingi ya mikili ndenge na ndenge balobelaki, ndenge lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo Time oyo batyaki na Internet mokolo ya 4/04/2017 emonisaki yango (“Tribinale monene ya Russie ekani kolongola lingomba ya Batatoli ya Yehova na liste ya Leta”), mpe lisolo moko na ezipeli ya zulunalo The New York Times oyo ebimaki na mokolo ya 5/04/2017, (“Russie esí ekani kopekisa lingomba ya bakristo oyo bazali bato ya kimya, mpo “makambo ya lingomba na bango elekisaka ndelo””).

David Semonian, molobeli ya Batatoli ya Yehova na biro monene na New York abakisaki: “Tozali na elikya mpenza ete tribinale monene ya Russie ekokɔtela ntomo ya bandeko ya lingomba na biso mpo bázala na bonsomi ya kosala makambo na bango ya losambo na kimya.” Bamilio ya bato na mokili mobimba bakolanda na likebi ndenge makambo yango ekosuka mpe kotala soki guvɛrnema ya Russie ekosala likambo moko mpo na kobatela bana-mboka ya ekólo yango oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe batosaka mibeko.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya koyeba makambo +1-845-524-3000

Na Russie: Yaroslav Sivulskiy, +7-812-702-2691