Lakisá makambo oyo ezali na kati

Dennis Christensen ntango azali kosamba na tribinale na 2017

10 SANZA YA 5, 2018
RUSSIE

Tribinale ya Oryol eyoki makambo oyo tɛmwɛ ya liboso alobi ntango bazali kosambisa Dennis Christensen

Tribinale ya Oryol eyoki makambo oyo tɛmwɛ ya liboso alobi ntango bazali kosambisa Dennis Christensen

Tribinale ya etúká ya Oryol, na Zheleznodorozhniy, ezongelaki kosambisa likambo ya Dennis Christensen na mokolo ya 23/04/2018. Bakangaki Christensen, mwana-mboka ya Danemark oyo azali Motatoli ya Yehova ntango azalaki na likita ya losambo na sanza ya 05/2017 mpe banda wana azali kaka na kasho.

Prokirɛrɛ Fomin, afundaki Christensen ete ye nde abongisaki ‘likita ya ebongiseli oyo Leta elobá ete elekisaka ndelo;’ elingi koloba ebongiseli ya losambo ya Batatoli ya Yehova (LRO) na Oryol, oyo na sanza ya 06/2017, Leta elongolaki lotomo oyo epesaki bibongiseli na bango nyonso ya losambo. Baavoka ya Christensen baboyaki efundeli yango mpo lisangá ya Batatoli ya Yehova na Oryol ezali te ebongiseli moko oyo ekomamá na Leta, kasi ezali nde etuluku ya bato oyo basambelaka Nzambe na kimya mpe bayanganaka mpo na koyekola Biblia. Baavoka yango bamonisaki ete bakonzi ya Russie bango moko bapekisaki te lingomba ya Batatoli ya Yehova, mpe ete mibeko ya Russie epesi moto lotomo ya koyebisa basusu mateya oyo andimaka. * Na yango, ntango Christensen azalaki na mokumba na likita yango ya losambo, azalaki kaka kosala likambo oyo losambo na ye esɛngi.

Na mokolo ya 24/04/2018, bayokaki makanisi ya batɛmwɛ. Prokirɛrɛ abengaki naino liboso moto moko ya Leta ya Service fédéral de sécurité (FSB) aloba. Moto yango alobaki ete banda na 2017 atyaki kamera moko mpo esalisa bango báyeba makambo oyo ezalaki koleka na Ndako ya Bokonzi ya Oryol. Kasi, azangaki mwaye ya kolobela makambo oyo ezalaki koleka na kati ya Ndako ya Bokonzi yango mpo bilili ya video oyo azwaki ezalaki komonisa kaka ndenge Christensen azalaki kopesa basusu mbote na esengo ntango bazalaki kokɔta na Ndako yango. Na nsima, prokirɛrɛ abengaki mwasi moko oyo afandi na Oryol, oyo ayanganaki na makita ya Batatoli ya Yehova. Mwasi yango azangaki ndenge ya kolobela makambo oyo Christensen azalaki kosala na likita yango mpo azalaki koyangana na makita liboso Leta elongola lotomo oyo epesaki bibongiseli ya losambo ya Batatoli ya Yehova na Oryol.

Irina Christensen

Na mokolo elandaki, prokirɛrɛ abengaki mwasi moko mobange ya mbula 78, oyo azali Motatoli ya Yehova aloba. Prokirɛrɛ atunaki ye mituna na boumeli ya ngonga mibale na ndambo mpo na kozwa “elembeteli” oyo ekokweisa Christensen, kasi mobange yango alobaki kaka ete Batatoli ya Yehova bazalaka na bakonzi te mpe na makita na bango basalelaka te mikanda oyo Leta ya Russie epekisá.

Bakozongela kosambisa likambo yango na mokolo ya 14/5/2018 mpe ekokoba mikolo mingi na boumeli ya sanza yango. Soki tribinale ekweisi Christensen, bakoki kokatela ye etumbu mbula motoba to zomi ya bolɔko. Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bazali komitungisa mpo na etumbu ya bolɔkɔ oyo bakoki kokatela ye mpe mpo na sante ya Christensen ná mwasi na ye, Irina.

^ par. 3 Ntango tribinale monene endimaki ekateli ya kopekisa bibongiseli ya Batatoli ya Yehova (LRO) na Oryol, elobaki boye: “Bakobebisa te lotomo oyo bandimi ya lingomba yango bazali na yango ya kolobela makambo ya lingomba na bango, mpo bapekisi bango te kotambwisa makambo ya losambo na bango oyo esɛngi te kokabola mikanda oyo Leta epekisá mpo elobi ete elekisaka ndelo.”