Lakisá makambo oyo ezali na kati

2 SANZA YA 7, 2015
RWANDA

Tribinale moko ya Rwanda etɛmɛli likambo ya kosalela mangomba mosusu makambo na nko

Tribinale moko ya Rwanda etɛmɛli likambo ya kosalela mangomba mosusu makambo na nko

Tribinale moko na etúká ya Karongi na Rwanda elongisaki ntomo ya bonsomi ya losambo ya bana-kelasi mwambe oyo bazali Batatoli ya Yehova. Likambo ezalaki ete baboyaki kosangana na liteya ya religion na kelasi mpo na kotosa lisosoli na bango.

Biteyelo mingi na Rwanda ezali na boyokani na bibongiseli ya mangomba. Biteyelo mosusu esɛngaka bana-kelasi básangana na milulu na bango ya losambo mpe kofuta mpako ya ndako-nzambe. Lokola bana-kelasi oyo bazali Batatoli ya Yehova baboyaki kosala yango, bakonzi ya eteyelo babenganaki bana 160 kati na 2008 mpe 2014. Atako likambo yango esili naino te na mboka mobimba, likambo oyo esalemi na Karongi, na etúká ya wɛsti, emonisi ete bakonzi ya Rwanda bakoki kosilisa likambo ya kosala mangomba mosusu makambo na nko.

Babenganaki bana-kelasi mpo na likambo ya kosala mangomba mosusu makambo na nko

Na mokolo ya 12/05/2014, bakonzi ya eteyelo ebengami Groupe Scolaire Musango, na Karongi, babenganaki bana-kelasi mwambe, oyo bazali na mbula kobanda 13 tii 20, * mpo baboyaki kosangana na molulu moko ya losambo. Baboti ya bana yango bamemaki likambo yango na Rectorat ya Rwankuba, oyo epesaki mitindo ete bázongisa bana yango na kelasi. Bakonzi ya eteyelo basepelaki te na ekateli yango, na yango basalelaki mayele mosusu mpe bafundaki bana-kelasi yango ete bazali na limemya te mpo na loyembo ya ekólo mpo baboyi koyemba yango. Na mokolo ya 14/06/2014, kaka mikolo mibale na nsima ntango bana yango bazongaki na kelasi, bapolisi bayaki na eteyelo mpe bakangaki bango.

Bapolisi bakangaki bana yango na bolɔkɔ mikolo motoba. Bakanelaki bango, balobelaki bango maloba mabe mpe babɛtaki bana-kelasi mibale oyo bazalaki mikóló mpo bakanisaki ete bango nde bazali kotinda bana mike bátomboka. Atako bongo, bango nyonso mwambe batikalaki sembo.

Tribinale elongisi bana-kelasi

Bapolisi babimisaki bana-kelasi nsambo na bolɔkɔ mokolo ya 09/06/2014, mpe prokirɛrɛ alongolaki etumbu bakatelaki oyo aleki moke kati na bango. Kasi, bapolisi bakangaki oyo aleki mokóló mikolo libwa mosusu. Na nsima, zuzi apesaki mitindo ete abima bolɔkɔ mpo na mwa ntango, tii ntango akosamba lisusu na tribinale mokolo ya 14/10/2014.

Na tribinale, zuzi atunaki mwana-kelasi mokomoko mituna. Moko na bango, oyo azalaki koloba na nkombo na bango nyonso, alimbwelaki zuzi ete ntina mpenza oyo babenganaki bango na eteyelo ezalaki te mpo baboyaki koyemba loyembo ya ekólo, kasi mpo baboyaki kofuta mpako ya ndako-nzambe mpe kosangana na milulu ya losambo.

Na nsima, zuzi asɛngaki prokirɛrɛ abimisa bilembeteli mosusu oyo ekondimisa efundeli ya “kozanga limemya na loyembo ya ekólo.” Ntango prokirɛrɛ azalaki kotya bana kelasi mbamba ete báyebisa makambo mosusu, bamonisaki polele ete bazangaki limemya te mpo na loyembo ya ekólo ntango bamosusu bazalaki koyemba.

Na ekateli oyo ebimaki na mokolo ya 28/11/2014, Tribinale ya Karongi ekataki ete koboya koyemba loyembo ya ekólo “esengeli te kotalelama lokola likambo ya kozanga limemya.” Ekateli yango epesi nzela na kotosa mobeko yango, elongisi bana, mpe ekoki kosala ete likambo ya kosalela mangomba mosusu makambo na nko esila na biteyelo ya Rwanda.

Basɛngi ete ntomo ya ntina mingi ya bato etosama

Batatoli ya Yehova na Rwanda basepeli ndenge likambo ya bana-kelasi ya Groupe Scolaire Musango esuki malamu mpenza. Nzokande, bana mosusu ya Batatoli ya Yehova oyo babenganaka basengeli kaka kokɔta na biteyelo mosusu. Bana mosusu bakoki kokoba kotánga kelasi te mpo basengeli kaka kokɔta na eteyelo oyo ezali ya Leta te, mpamba te libota na bango ezali na mbongo mingi ya kofuta kelasi yango.

Ndenge moko na baboti mosusu, baboti oyo bazali Batatoli balukaka oyo eleki malamu mpo na bana na bango. Balingaka ete bana na bango bázwa mayele oyo ekosalisa bango bázala mikóló oyo bayebi kokokisa mikumba na bango. Batatoli ya Yehova bazali na elikya ete ekateli ya malamu oyo tribinale ya Karongi ezwi ekosala bámemya bonsomi ya losambo mpe ya kobatela lisosoli ya bana-kelasi na Rwanda mobimba.

^ par. 5 Na Rwanda, na kolanda mibeko, mwana abandi kokóma mokóló na mbula 21 (Artikle 360 ya code civil).