Lakisá makambo oyo ezali na kati

14/08/2019
SLOVAQUIE

Liyangani ya etúká ya liboso oyo esalemaki na monɔkɔ ya Romani na (Ɛsti ya Slovaquie)

Liyangani ya etúká ya liboso oyo esalemaki na monɔkɔ ya Romani na (Ɛsti ya Slovaquie)

Moko ya bandeko 19 oyo bazwaki batisimo

Bandeko na biso basalaki liyangani ya etúká ya liboso na Slovaquie, kobanda na mokolo ya 20 tii ya 21/07/2019, na Winter Stadium na Michalovce. Na liyangani yango ya mikolo mibale, motángo ya bayangani oyo elekaki ezalaki bato 1 276. Baoyo nyonso bazwaki batisimo bazalaki bato 19.

Bayangani oyo bayaki na liyangani yango bautaki na bikólo minei oyo: Belgique, République Tchèque, Grande-Bretagne, mpe Ukraine. Bayangani basepelaki kolanda filme Lisolo ya Yosiya: Lingá Yehova mpe yiná oyo ezali mabe, na monɔkɔ na bango ya mboka.

Liyangani yango esalemaki kaka mbula mitano nsima ya kosalema ya lisangá ya liboso na monɔkɔ ya Romani na Slovaquie na sanza ya 11/2014. Lelo oyo, masangá ya monɔkɔ ya Romani ezali 9, bituluku 10, mpe bituluku mosusu 14 ekosalema mosika te na teritware ya filiale ya Tchèque-Slovaquie.

Peter Tirpak, mokambi ya Winter Stadium, alobaki boye: “Tosalaki malamu mpenza elongo na bino Batatoli ya Yehova. Botosaka ntango nyonso maloba na bino. Tokosepela soki boyei lisusu.”

Peter Varga, oyo asalaki lokola mokɛngɛli ya programɛ ya liyangani, alobaki boye: “Liyangani ya ndenge oyo esalemá naino te awa. Mpo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali oyo balobaka monɔkɔ ya Romani, oyo ezalaki mpenza liyangani moko oyo etiki nsango na mboka na biso. Nsima ya loyembo ya nsuka, bandeko bakómaki koyambana, atako ezalaki mbala ya liboso bámonana. Mingi na bango babimisaki mai ya miso.”

Tosepeli elongo na basakoli 1 010 oyo balobaka monɔkɔ ya Romani na Slovaquie. Mayangani yango emonisi ndenge basaleli ya Yehova balinganaka mpenza na bolingo ya bondeko.​—Yoane 13:34, 35.