Lakisá makambo oyo ezali na kati

9/2/2018
TAÏWAN

Koningana ya mabele ebɛti Taïwan

Koningana ya mabele ebɛti Taïwan

Na butu ya mokolo ya mibale 6/02/2018, koningana makasi ya mabele ebɛtaki ɛsti ya bokula ya Taïwan. Bansango oyo bapanzi-nsango bapesaki emonisi ete bato soki motoba bakufaki mpe bato 250 bazokaki. Longola yango, tii sikoyo bato 76 bazali komonana te.

Motatoli ya Yehova moko te akufaki to azokaki na likama yango. Kasi, na engumba Hualien, oyo ezali na esika oyo koningana ya mabele ebɛtaki makasi, buludingi moko oyo ezali na Ndako ya Bokonzi mpe biro ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Amis (monɔkɔ moko ya mboka oyo bato ya Taïwan balobaka) ebebaki. Longola yango, apartema moko epai bandeko oyo babongolaka mikanda bafandaka ebebaki makasi mpe esɛngaki bandeko yango bálongwa wana. Bandeko ya Taïwan bazwaki bibongiseli nokinoki mpo na kopesa bisika ya kolala epai ya bandeko oyo bazwaki likama mpe Betele ya Taïwan ezali kopesa lisungi na makambo mosusu.

Tozali kobondela ete bandeko na biso oyo bazwi likama bázala na kimya ya makanisi na eleko oyo ya mpasi mpe ete bandeko oyo bazwi mokumba ya kokipe bango bakozala mpenza “lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ.”​—Yisaya 32:2.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Taïwan: Chen Yongdian, +886-3-477-7999