Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Jovidon Bobojonov

31/03/2020
TADJIKISTAN

Bakoki kokatela ndeko Jovidon Bobojonov etumbu ya boloko na Tadjikistan mpo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye

Bakoki kokatela ndeko Jovidon Bobojonov etumbu ya boloko na Tadjikistan mpo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye

Na mokolo ya misato, mwa 01/04/2020, tribinale ya basoda na Tadjikistan, na engumba-mokonzi Duchanbé bazali komilɛla mpo na koyebisa ekateli bazweli ndeko Jovidon Bobojonov mpo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Ndeko Bobojonov asali basanza koleka mitano na bolɔkɔ oyo batyaki ye mpo azela tii mokolo bazuzi bakosambisa ye.

Na mokolo ya 04/10/2019, bakonzi ya basoda ya engumba Khoudjand bakangaki ndeko Bobojonov, elenge ya mbula 19, na ndako na ye mpe bakendaki na ye na biro ya basoda, esika batyaki ye na kasho. Nsima ya mikolo mibale, bakendaki na ye na makasi na engbunduka epai bapesaka basoda formasyo na etúká ya Lénine. Na nsima batindaki ye na inité No. 45075 epai bakonzi ya basoda batyaki ye mbamba alata bilamba ya basoda mpe alapa ndai ya mosala ya soda. Na mokolo ya 28/01/2020, bafundaki ye ete abuki mobeko.

Baboti ya Jovidon oyo bazali mpe Batatoli ya Yehova, bakomelaki bakonzi ebele ya Tadjikistan, ná bakonzi ya biro ya Prezida mpe ya bato oyo balandelaka ntomo ya bato. Bakonzi ya Tadjikistan balobaki ete mobeko endimá naino te kosala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda, ndeko Bobojonov, abuki mobeko mpe asengeli kokangama.

Toyebi ete Yehova akopesa ndeko Bobojonov mbano mpo na ekateli oyo azwaki, mpe akopesa ye ná libota na ye makasi mpe kimya.​—Nzembo 29:11.