Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Rustamjon Norov (moto ya mibale na lobɔkɔ ya mwasi) ná mama naye, Fariza; ndeko na ye, Ravshan; mpe tata na ye, Batyr, ntango bayei kotala filiale ya Kyrgyzstan na 2016

27 SANZA YA 10, 2020
TADJIKISTAN

Batye ndeko Rustamjon Norov na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mpe azali kaka na mpiko atako akoki kolekisa mbula mitano na bolɔkɔ ya Tajik

Batye ndeko Rustamjon Norov na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mpe azali kaka na mpiko atako akoki kolekisa mbula mitano na bolɔkɔ ya Tajik

Ntango ya kokata likambo

Mosika te * tribinale ya basoda na Tajik ekokata likambo ya ndeko Rustamjon Norov. Bakoki kokatela ye mbula mibale to mitano ya bolɔkɔ mpo aboyi kokɔta na mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Bakangaki ye banda na mokolo ya 01/10/2020.

Makambo etali bomoi na ye

Rustamjon Norov

  • Abotamá na: 1998 (Dushanbe)

  • Bomoi na ye: Abongisaka bandako mpe biloko ya ndako mpo na komileisa mpe koleisa libota na bango. Alingaka kobɛta bale

  • Azwaki batisimo na 2016 ntango azalaki na mbula 17. Mbula mibale na nsima, atikaki lisangá ya monɔkɔ ya Russe esika libota na bango ezalaki mpo na kokende kopesa mabɔkɔ na lisangá ya teritware ya monɔkɔ ya Tajik

Ndenge makambo elekaki

Na 2016, ndeko Rustamjon Norov akendaki ye moko na biro ya basoda mpo na komonisa ete akɔtaka te na makambo ya mokili mpe kosɛnga bango bápesa ye mosala mosusu na esika ya mosala ya soda. Na mbula oyo elandaki, asalaki mpe kaka bongo. Moko ya bakonzi ya basoda amemyaki ndeko Norov mpe akamwaki ndenge azalaki kolimbola makambo. Na boumeli ya mbula misato oyo elandaki, biro ya basoda ebengisaki lisusu te ndeko Norov mpo na mosala ya soda.

Kasi na mokolo ya 24/09/2020, biro ya basoda ya etúká yango ebengisaki ndeko Norov. Na boumeli ya ngonga misato mobimba, bakonzi ya basoda yango batunatunaki ndeko Norov mituna mpe balobaki ete azali na nzoto makasi mpo na kosala mosala ya soda. Mpe na nsima, bakonzi yango basɛngaki ye na makasi akende epai ya minganga mpo básala ye ekzamɛ. Tata ya ndeko Norov azalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema mpe asɛngaki bátinda likambo yango na biro ya prokirɛrɛ mpo etalela likambo yango.

Ndeko Norov ná tata na ye bakendaki na biro ya prokirɛrɛ na mokolo ya 01/10/2020. Prokirɛrɛ asɛngaki bapolisi bámema bango na biro ya etúká. Ntango bakómaki kuna, baboyaki tata ya ndeko Norov akɔta. Batyaki ndeko Norov na bolɔkɔ mikolo mibale. Ndeko Norov afundamaki te mpe bakangaki ye te mpo azalaki mosali mabe. Ntango azalaki na bolɔkɔ, bapolisi baboyaki ete asolola na avoka na ye.

Na mokolo ya 03/10/2020, batindaki ndeko Norov na bolɔkɔ ya engumba Khujand, oyo ezali mosika na kilomɛtrɛ soki 300 na engumba Dushanbe, esika baboti na ye bafandaka. Nsima ya mikolo mibale, batindaki ye na bakaa ndenge na ndenge ya basoda na Khujand.

Na mokolo ya 06/10/2020, bapesaki ndeko Norov ndingisa ya kobenga libota na bango mpe kosolola na avoka na ye. Ata bongo, na mokolo ya 17/10/2020, tribinale ya basoda na Tajik esɛngaki bátya ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Ndeko Norov akotikala na bolɔkɔ tii bakosilisa kosambisa ye mpe kozwa ekateli mpo na ye. Bafundaki ndeko Norov ete asalisaki mokanda ya lokuta na oyo etali sante na ye mpo akende mosala ya soda te.

Ata ndenge bakangi ye na bolɔkɔ, ndeko Norov azali kokoba kobatela elimo na ye mpe kotyela Yehova motema. Azali kopesa Yehova matɔndi mingi ndenge azali kosalisa ye akómisa kondima na ye makasi mpe ndenge azali kopesa ye mpiko oyo esengeli mpo alonga mokakatano wana. Azali mpe kopesa Yehova matɔndi ndenge asalisaki ye na komekama oyo akutanaki na yango na 2013. Na mbula yango, bakonzi bazwaki na makasi ndeko Norov mpe leki na ye ya mobali, Ravshan, na eteyelo mpe bamemaki bango na kaa ya basoda mpo básala bango baekzamɛ mpo báyeba soki bakoki kosala mosala ya soda. Ndeko Norov azalaki kaka na mbula 15 na ntango yango, akokisaki naino te mbula oyo esɛngaka mpo moto akɔta na mosala ya soda mpe azalaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Nsima ya likambo yango, tata na bango, Batyr, azwaki ntango mingi na ntango ya losambo na kati ya libota mpo na kosalisa bana na ye bákóma na makoki ya kolobela ntina oyo bakristo bákɔtaka te na makambo ya mokili. Ntango bazalaki kosala losambo na kati ya libota, tata na bango, Batyr, azalaki kosala lokola ye nde zuzi mpe bana bazalaki kosala lokola bato oyo bazali kosamba mpo na kokɔtela kondima na bango.

Ndeko Norov alobi boye: “Liboso tómekameka na losambo na kati ya libota, nakanisaki ete namibongisaki mpo na kokɔtela kondima na ngai. Kasi ntango tobandaki, nakamwaki ndenge nazalaki kolɛnga mpe kobanga ntango nazalaki koloba. Yango etindaki ngai namona ete nasengelaki kobondela mpe koyekola lisusu mingi mpo na kondima na ngai mpe ekateli oyo nazwi mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili. Mokemoke, kobanga oyo nazalaki na yango esilaki. Na ebandeli ya 2016, namipesaki epai ya Yehova mpe nazwaki batisimo.”

Bandeko ya mikóló oyo bakomeli na elimo oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na bango balendisaki mpe ndeko Norov mingi. Ndeko Norov alobi boye: “Emonani polele ete soki naboyi kokɔta na makambo ya mokili, nakoki kokutana na komekama. Soki bamemi ngai na bolɔkɔ, nakomona yango lokumu mpo na kosantisa nkombo ya Yehova na ‘teritware ya sika.’”

Tata ya ndeko Norov alobi boye: “Libota na biso ezali kopesa Yehova mabɔndi mingi mpo na lokumu monene oyo apesi biso ya kosala mokano na ye mpe kozala bisaleli na mabɔkɔ na ye. Mpe tozali koyebisa bandeko na biso bakristo boye: ‘Tozali mpenza na botɔndi mpo na bolingo na bino, mabondeli na bino, mpe ndenge bozali kosunga biso na elimo.’ Tozali komitungisa te to kobanga eloko te. Kimya ya Nzambe etondi na mitema na biso, kaka ndenge Yehova alaki biso na Liloba na ye!”​—Bafilipi 4:6, 7.

^ par. 3 Dati oyo tribinale ezwaka ekateli eyebanaka te liboso