Lakisá makambo oyo ezali na kati

22/09/2021
TADJIKISTAN

Ndeko Rustamjon Norov abimi na bolɔkɔ na Tadjikistan

Ndeko Rustamjon Norov abimi na bolɔkɔ na Tadjikistan

Na mokolo ya 21/09/2021, ndeko Rustamjon Norov abimaki na bolɔkɔ na engumba Yavan, na Tadjikistan. Akɔtaki bolɔkɔ banda sanza ya 10 na mobu 2020 mpo lisosoli na ye eboyaki akɔta na mosala ya soda. Bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya mbula misato na ndambo, kasi babimisaki ye liboso ntango yango ekoka, mpo babandaki kosalela mobeko ya kolimbisa bato ya bolɔkɔ oyo bautaki kobimisa kaka na ebandeli ya sanza wana.