Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Rustamjon Norov na Tadjikistan liboso abima na boloko

12/10/2021
TADJIKISTAN

Sikoyo babimisi ndeko Rustamjon Norov na boloko, mpe bapesi ye longonya mpo na bizaleli malamu oyo azalaki na yango

Sikoyo babimisi ndeko Rustamjon Norov na boloko, mpe bapesi ye longonya mpo na bizaleli malamu oyo azalaki na yango

Ndenge eyebisamaki, ndeko Rustamjon Norov, oyo azali sikoyo na mbula 22, abimaki na bolɔkɔ na Tadjikistan na mokolo ya 21/09/2021. Babimisaki ye liboso ya ntango oyo esengelaki mpo batyaki mobeko moko ya kolimbisa bato ya bolɔkɔ mpe babandaki kosalela mobeko yango na ebandeli ya sanza wana. Asalaki sanza misato na kasho liboso ya kosamba. Na mokolo ya 10/05/2021, batindaki ye na bolɔkɔ ya Yavan mpo na kosilisa etumbu ya mbula misato na ndambo ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye. Ntango bakangaki ndeko Rustamjon, ntango azalaki kosamba, mpe ntango azalaki na bolɔkɔ, bato oyo bazalaki kotala ye bazalaki kokamwa na bizaleli malamu na ye mpe na bosembo na ye.

Mokolo moko, ntango ndeko Rustamjon azalaki kosamba, mokonzi moko ya basoda (colonel) ayaki esika ndeko Rustamjon azalaki mpe apesaki ye mbote na mabɔkɔ. Mokonzi ya basoda yango alobaki ete asepelaki mingi na mpiko ya Rustamjon mpe na ndenge oyo akangamaki na bosembo na ye. Na nsima, mokonzi ya basoda yango alobaki boye: “Moto nyonso oyo andimelaka Nzambe asengeli kozala lokola yo.” Abakisaki ete: “Kanisá naino, ntango bakondima ete bato oyo baboyi kosala mosala ya soda na Tadjikistan básala mosala mosusu, nkombo na yo ekozala na kati ya bankombo ya bato oyo babomaki nzoto mpo bana-mboka bákóma na lotomo yango.”

Ntango ndeko Rustamjon azalaki na boloko, akobaki kopesa bato mosusu litatoli na molende. Mpo na bizaleli malamu na ye, bakonzi ya boloko babengaki ye aya kolanda formasyo moko oyo bato ya Union européenne bazalaki kopesa mpo na kosalisa bato ya boloko bázwa misala ntango bakobima. Ntango formasyo esilaki, bakonzi ya boloko bapesaki ndeko Rustamjon certificat mpe mokanda moko ya longonya mpo azali moto oyo alingi mosala mpenza. Ndeko Rustamjon alobi ete bakonzi balobi ete azali na bizaleli malamu mpo asalelaka mitinda ya bokristo.

Liboso bábismisa ndeko Rustamjon na boloko, ye moko azalaki kondima te ete akozala na kati ya bato oyo bakolimbisama na mobeko wana. Kasi, bakangami mosusu bandimaki na motema moko ete akobima mpo azali moto ya lokumu na kati ya boloko wana. Bakambi mosusu ya boloko mpe balendisaki ye.

Bilenge oyo bazali Batatoli ya sembo, lokola ndeko Rustamjon, oyo bakɔtaki boloko mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe bazali kokoba komonisa bosembo, bazali kosala ete “pole engɛnga liboso ya bato.” Oyo eleki nyonso, “misala malamu” na bango ezali kopesa Yehova Nzambe nkembo mpe lokumu.​—Matai 5:16.