Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kerven Kakabayev​—bakatelaki ye etumbu ya mbula moko ya bolɔkɔ mpo alukaki kotosa lisosoli na ye

28 SANZA YA 3, 2018
TURKMÉNISTAN

Turkménistan ekipaka te lotomo ya kotosa lisosoli.

Turkménistan ekipaka te lotomo ya kotosa lisosoli.

Na sanza ya 01/2018, bakatelaki Arslan Begenjov ná Kerven Kakabayev etumbu ya bolɔkɔ ya mbula moko mpo bafundaki bango ete bakimi mosala ya soda. Bilenge mibali yango mibale bazali Batatoli ya Yehova mpe baboyaki kokomisa nkombo na mosala ya soda mpo na makambo na bango ya losambo. Atako mposa na bango ezalaki bápesa bango misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda, guvɛrnema ya Turkménistan endimi naino te lotomo ya kotosa lisosoli ya moto mpe epesaka te mosala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda.

Kokanga, kosambisa mpe bolɔkɔ

Bakonzi bakangaki Begenjov na mokolo ya 2/01/2018 mpe batyaki ye naino na kasho tii ntango akosamba na tribinale. Na mokolo ya 17/01/2018, tribinale ekweisaki ye na likambo mpo elobaki ete akimi mosala ya soda mpe ekatelaki ye etumbu ya mbula moko ya bolɔkɔ. Begenjov amonaki ete bakateli ye etumbu na bosembo te mpe asɛngaki asamba lisusu.

Bakangaki mpe Kakabayev na sanza ya 01/2018 mpe bakatelaki ye etumbu ya mbula moko ya bolɔkɔ kaka mpamba na mokolo ya 29/01/2018. Ntango azalaki kosamba, tribinale epesaki ye nzela te ya komonisa bikateli ya malamu ya ebongiseli ya ONU oyo etalaka ntomo ya moto; bikateli oyo endimi likambo na ye. Likambo ya mawa ezali ete tribinale ekopesa lisusu te Kakabayev nzela ya kosamba. Bakonzi ya bolɔkɔ baboyi kopesa ye mikanda oyo baavoka na ye babongiselaki ye. Mpo na yango, akoki te kotya sinyatire na mikanda yango liboso mikolo zomi ekoka banda bakatelaki ye etumbu yango, ndenge mibeko esɛngi.

Oyo ezali mbala ya mibale bákatela Kakabayev etumbu mpo aboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Na sanza ya 12/2014, bakonzi bakatelaki ye etumbu ya mbula mibale ya disiplini, elingi koloba basɛngaki ye alongolaka ndambo ya mbongo ya salɛrɛ na ye (20%) mpe apesaka yango Leta na boumeli ya mbula yango mibale.

“Kokoba koboya kondima lotomo ya baoyo batosaka lisosoli na bango”

Guvɛrnema ya Turkménistan elobaka ete etosaka bonsomi ya bana-mboka. Kasi ezali koboya kondima lotomo ya baoyo lisosoli na bango epekisaka bango mosala ya soda atako bazali kosɛnga guvɛrnema elanda mibeko ya mikili ndenge na ndenge.

Na 2015 mpe 2016, komite ya ONU oyo etalaka ntomo ya moto ebimisaki ekateli mpo na Turkménistan mpo na kopesa eyano na bifundeli oyo Batatoli ya Yehova zomi bafundaki Turkménistan mpo eboyaki kotosa lisosoli na bango. Na bikateli yango, komite ya ONU epamelaki Turkménistan ndenge enyokolaki mpe ekɔtisaki Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpo na likambo etali kotosa lisosoli. Na sanza ya 04/2017, komite yango epamelaki lisusu Turkménistan “ndenge ezali kokoba koboya lotomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na lisosoli na bango mpe ezali kokoba kosambisa mpe kotya na bolɔkɔ Batatoli ya Yehova oyo bazali koboya kosala mosala ya soda na makasi.” Esɛngi Turkménistan epesa bango misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda, etika kosambisa bango mpe ebimisa baoyo bazali sikoyo na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda.

Na mwa bambula oyo eleki, guvɛrnema ebongolaki mwa moke ndenge ya kosalela baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango makambo. Kobanda 12/2014, na esika bátya Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpo batosaka lisosoli na bango, bakómaki kokata bango mbongo ya salɛrɛ (20%) mpo na mbula moko to mibale lokola etumbu (ndenge basalaki Kakabayev na 2014) to na bantango mosusu kofutisa bango amande. * Na sanza ya 02/2015, Turkménistan ebimisaki Motatoli ya Yehova ya nsuka oyo azalaki na bolɔkɔ mpo na likambo etali kotosa lisosoli na ye. Kasi likambo ya mawa, na ekateli oyo bautaki kozwela Begenjov ná Kakabayev, guvɛrnema ya Turkménistan ezongeli kopesa etumbu ya makasi na esika ya kondima polele lotomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Batatoli ya Yehova bazali kokɔta bolɔkɔ kaka te mpo na kotosa lisosoli na bango

Longola kokangama ya Begenjov ná Kakabayev oyo euti kosalema kala mingi te, bakonzi baboyi kobimisa Bahram Hemdemov na bolɔkɔ mpo asalelaki lotomo na ye ya kosambela. Lokola azali Motatoli ya Yehova, bakangaki ye mpo likita moko ya losambo esalemaki na ndako na ye na Turkmenabad. Tata yango ya bana minei azali na bolɔkɔ kobanda 2015, atako na mbula mibale oyo eleki prezida ya Turkménistan asɛngaki bábimisa na bolɔkɔ baoyo nyonso bakangá bango mpo na makambo ya politiki. Ekólo yango ebimisaki ebele ya bato na bolɔkɔ kasi eboyi kaka kobimisa Hemdemov oyo azali kosɛnga ete bábimisa ye.

Batatoli ya Yehova bazali na mposa bandeko na bango na Turkménistan bázwa bonsomi. Bazali na elikya ete mosika te, Turkménistan ekotosa bonsomi ya losambo mpe ya lisosoli ya bato mpe ekosembola makambo ya kozanga bosembo oyo ezali kosalema kuna.

^ par. 10 Bafutisaka bamosusu amande na esika ya kokɔtisa bango na bolɔkɔ.