Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bandeko ya Kharkiv, Ukraine, bazali komibatela mpo na kokima babɔmbi

03/03/2022
UKRAINE

Bolingo ya bondeko eyei makasi atako yikiyiki na Ukraine

Bolingo ya bondeko eyei makasi atako yikiyiki na Ukraine

Na mokolo ya 24/02/2022, Russie abandaki kobundisa Ukraine. Na Ukraine, Batatoli ya Yehova bazali koleka 129 000 elongo na bana na bango. Betele etyaki bakomite 27 mpo na kosunga bandeko oyo bazwi likama. Longola yango, mpo na komonisa bolingo ya bokristo, bandeko bazali kosala nyonso mpo na kosalisana na mosuni mpe kopesana makasi bango na bango, mpe bato mosusu na ntango yango ya yikiyiki.

Bandeko mingi bazali kaka na kati ya ekólo yango, kasi bamosusu bazwi ekateli bango moko ya kokima. Baoyo bakimaki bakutanaki na milɔngɔ ya ebele ya bato, oyo mosusu ekendaki tii na kilomɛtrɛ 30, mpe bazelaki ata mikolo misato to minei mpo na kokatisa esika ya kobima na mboka. Batatoli ya bamboka yango balukaki bandeko na bango na milɔngɔ yango ya bato mpe bapesaki bango eloko ya komɛla mpe basalisaki bango na ndenge oyo ebongi. Ntango nsukansuka bandeko yango bakatisaki mpe bakɔtaki na bikólo ya zingazinga, Batatoli mosusu oyo basimbaki bilembo bakomá jw.org bayambaki bango, bayaki mpo na kolendisa bango mpe kopesa lisalisi oyo ebongi.

Bandeko basi ya Pologne (lobɔkɔ ya mwasi) mpe ya Slováquie (lobɔkɔ ya mobali) bazali kozela bandeko oyo bazali kokima Ukraine mpo básalisa bango

Oyo yango esali nini epai ya bandeko

  • Ndeko Petro Mozul, oyo azali baba mpe mosaleli na misala na Kharkiv, akufaki na bɔmbi

    Likambo ya mawa, na mokolo ya 01/03/2022, ndeko mobali moko ya baba ya mboka Kharkiv akufaki na bɔmbi, mpe mwasi na ye azokaki makasi

  • Bandeko basi mosusu 3 mpe bazokaki

  • Basakoli koleka 5 000 bakimi bandako na bango

  • Bandako 2 eziki

  • Bandako 3 ebebi makasi

  • Bandako 35 ebebi mwa moke

  • Bandako ya Bokonzi 2 ebebi

  • Na bisika mingi kura ezalaki te, malili ezalaki makasi, telefone ezalaki kosala te, mpe mai ezalaki te

Mosala ya kosunga bandeko

  • Batye bakomite 27 mpo na kosunga bandeko na Ukraine

  • Bakomite yango esalisi bandeko 867 bázwa esika ya kofanda epai babatelami

  • Bakomite yango ezali kosala mpo na kopesa bandeko biloko ya ntina mingi, na ndakisa bilei mpe mai

Mitángo yango euti na lapolo ya liboso oyo tozwi.

Libondeli na biso ezali ete bandeko na biso bákoba kozala na bwanya mpe bososoli mpo báyeba ndenge ya kosala na ntango yango ya yikiyiki mpe ya mpasi wana bazali komoniselana bolingo ya bondeko.​—Masese 9:10; 1 Batesaloniki 4:9.