Lakisá makambo oyo ezali na kati

1/7/2019
UKRAINE

Batatoli ya Yehova na Ukraine bamibongisi mpo na kolakisa bato milende oyo esalemaki mpo na kobimisa Biblia

Batatoli ya Yehova na Ukraine bamibongisi mpo na kolakisa bato milende oyo esalemaki mpo na kobimisa Biblia

Batatoli ya Yehova na Ukraine bamibongisaki mpo na kolakisa bato milende oyo esalemaki mpo na kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na elobeli ya bababa ya Russie (RSL), likambo oyo etiká nsango na milende oyo tosalá mpo na kobongola Biblia. Kolakisa bato milende oyo esalemaki mpo na kobimisa Biblia ebandaki na mokolo ya 07/10/2018, na Lviv mpe ekobaki tii na mokolo ya 07/06/2019. Tolakisaki mpe bato na bingumba oyo: Kharkiv, Kiev, Odessa, mpe Dniepr.

Liboso ya kolakisa bato milende oyo esalemaki, masangá ya elobeli ya bababa ekabolaki nkasa ya libyangi oyo ebimaki na papye mpe na bavideo epai ya bababa mpe baoyo bayokaka malamu te na bingumba epai bakolakisa bato makambo yango. Lisusu, biro ya kozwa bansango na filiale ya Ukraine ekabolaki nkasa ya libyangi epai ya balakisi, bapanzi-nsango mpe bakonzi ya Leta.

Bato oyo bayanganaki na molulu ya liboso, oyo ezalaki na centre ya bababa na engumba Lviv, balakisaki bango programɛ ndenge na ndenge ya bababa oyo bakoki kosalela na baaparɛyi na bango mpo na koyekola Biblia, na ndakisa, programɛ ya JW Library Sign Language®. Bapaya oyo bayaki kotala bamonaki mpe ndenge istware ya Biblia ebandaki mpe ndenge ekómi sikoyo na mikolo na biso, kobanda na barulo tii babuku ya ntango na biso. Na ndakisa bazwaki likoki ya komona Biblia ya liboso oyo ebimaki na 1927.

Tozali na esengo ndenge Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ezali sikoyo na elobeli ya bababa ya Russie. Tondimi ete yango ekosalisa baoyo basalelaka elobeli ya bababa ya Russie bázwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe.​—Matai 5:3.