Lakisá makambo oyo ezali na kati

25 SANZA YA 7, 2017
UKRAINE

Biro ya Batatoli ya Yehova na Ukraine efungoli baporte na yango

Biro ya Batatoli ya Yehova na Ukraine efungoli baporte na yango

LVIV, Ukraine. Biro ya Batatoli ya Yehova na Ukraine efungolaki baporte na yango mokolo ya 02/05/2017 mpo bato báya kosala vizite. Na mokolo yango, bakonzi ya Leta, balakisi ya iniversite, bakonzi ya bakompanyi mpe bato oyo bafandaka na engumba Lviv bayaki kosala vizite mpe bamonaki misala oyo esalemaka kuna.

Babongisaki mpe biloko oyo bana bakoki kotala.

Na libaku yango, Batatoli ya Yehova batyaki bapano mpe video moko oyo ezali kolimbola ndenge misala esalemaka, musée mpe babongisaki esika moko mpo na bana. Ivan Riher, molobeli ya Batatoli ya Yehova na Ukraine alobi boye: “Oyo ezali mbala ya liboso kobanda 2001 tóbongisa vizite oyo. Awa na Ukraine toyebani mpo na mosala na biso ya kosakola ndako na ndako, kasi tozalaki na mposa makasi ya kobengisa bato ya kartye na biso mpo bámona ndenge misala esalemaka awa na biro na biso mpe ndenge epesaka mabɔkɔ mpo na bolamu ya bana-mboka.”

Musée oyo batyaki esalisaki baoyo basalaki vizite báyeba makambo etali istware ya Batatoli ya Yehova na Ukraine.

Andriy Yurash, mokambi misala etali mangomba mpe bamboka oyo moto autá.

Andriy Yurash, mokambi misala etali mangomba mpe bamboka oyo moto autá, mosala oyo etambwisamaka na ministère ya Culture ya Ukraine, apesaki mpe makanisi na ye na oyo etali ndenge biro yango etambwisaka misala na yango; alobi boye: “Ebongiseli ya Batatoli ya Yehova epesi ndakisa malamu na oyo etali kobongisa boyokani kati na bato, mpo na bango moko mpe mpo na bato nyonso.”

Na mbula oyo, Batatoli ya Yehova bafungolaki mpe baporte ya biro na bango na Caméroun mpe na Biro monene na bango na Warwick, New York.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Ukraine: Ivan Riher, +38-032-240-9323