Lakisá makambo oyo ezali na kati

Minyoko eyei lisusu makasi mpo na bandeko na biso oyo bafandaka na bateritware ya etúká Donetsk mpe Luhansk na ɛsti ya Ukraine. Bato bayibaki biloko oyo ezalaki na Ndako ya Bokonzi na teritware ya Luhansk, babebisaki Ndako yango mpe batyaki yango mɔtɔ na mokolo ya 30/05/2018.

15/10/2018
UKRAINE

“République populaire de Donetsk” epekisi losambo ya Batatoli ya Yehova

“République populaire de Donetsk” epekisi losambo ya Batatoli ya Yehova

Na mokolo ya 26/09/2018, Tribinale monene ya “République populaire de Donetsk” (RPD) elobaki ete lingomba ya Batatoli ya Yehova “elekisaka ndelo na makambo ya losambo,” yango wana bapekisaki makambo ya losambo na biso. Ntango bazalaki kosambisa likambo yango, ezala prokirɛrɛ mokonzi oyo afundaki ebongiseli na biso to bazuzi basololaki ata na Motatoli ya Yehova moko te. Likambo ya konyokola Batatoli ya Yehova ezali kokóma se makasi mpe nsukansuka bapekisi losambo na bango na etúká yango.

Bomoi ya bandeko na biso na bisika mosusu ya etúká ya Donetsk mpe etúká ya Luhansk na ɛsti ya Ukraine ekómi lisusu mpasi makasi banda Tribinale monene ya République populaire de Donetsk elobaki na 2017, na sanza ya motoba ete mikanda na biso mosusu “elekisaka ndelo.” Na boumeli ya mbula yango, bapolisi batunatunaki Batatoli ya Yehova koleka 170 mituna. Bakonzi na bitúká yango babɔtɔlaki mpe Ndako ya Bokonzi mokomoko. Bandako ya Bokonzi nyonso oyo babɔtɔlaki tii na mokolo ya 29/08/2018, ezalaki 16.

Bandeko na biso na bateritware yango bazali kokoba kotyela ‘Nzambe ya lobiko’ motema atako bazali konyokola bango mpo na losambo na bango.​—Nzembo 18:46.