Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makambo etali babiro na biso mpe kosala vizite

Tosɛngi yo na motema moko oya kotala babiro na biso mpe bamasini na biso ya kobimisa mikanda. Talá ba adrɛsi mpe ngonga ya kosala vizite.

Tours Resumed: In many countries, we resumed tours of our branch offices on June 1, 2023. For details, contact the branch you would like to tour. Please do not visit if you test positive for COVID-19, display cold or flu-like symptoms, or have recently been exposed to someone who tested positive for COVID-19.

Afrique du Sud

Koyebisa liboso mokolo oyo olingi kosala vizite

Osengeli koyebisa liboso mokolo oyo olingi kosala vizite? Ɛɛ. Mpo bato oyo bayei kosala vizite báleka ebele te mpe bango nyonso básala mpenza vizite malamu, ekozala malamu koyebisa liboso mokolo oyo bolingi kosala vizite, ezala bokoya bato ebele to bato moke. Ata pɔsɔ moko liboso, osengeli koyebisa mokolo nini olingi kosala vizite. Soki olingi kosala vizite mokolo ya konje, ekozala malamu oyebisa bapɔsɔ mingi liboso.

Ndenge nini okoki koyebisa liboso mokolo oyo olingi kosala vizite? Okoki kosala yango soki obengi na telefone to otindi mesaje (e-mail).

Soki oyebisi liboso te mokolo oyo olingi kosala vizite, okoki kaka kosala vizite? Soki oyebisi liboso te mokolo oyo olingi kosala vizite, mbala mosusu tokozala na likoki te ya kosalisa yo vizite. Lokola esika ya koyamba bapaya ezali mpo na bato mingi te, soki bato baleki ebele, tokozala te na likoki ya kosalisa bango nyonso vizite na mokolo moko.

Ntango nini osengeli kokóma na Betele mpo na kosala vizite? Tolendisi yo okóma ngonga moko to mwa miniti liboso ya ngonga oyo oponaki mpo na kosala vizite. Yango ekosala ete mituka eleka ebele te na parkingi mpe bato báleka ebele te na bisika ya koyamba bapaya.

Vizite

1 Robert Broom Drive East

Rangeview

KRUGERSDORP

1739

AFRIQUE DU SUD

+27 11-761-1002

E-mail: InboxBTHLTours.ZA@jw.org

Lundi tii Vendredi

8:00 tii 11:00 mpe 13:00 tii 16:00.

Eumelaka ngonga soki 2

Na ebandeli ya vizite yango, bakolakisa yo video moko na Esika ya koyamba bapaya, na nsima bakotambwisa yo na kati ya Betele. Nzelanzela, bakolakisa yo bavideo mosusu mpo omona misala ndenge na ndenge oyo esalemaka na Betele, mpe ndenge oyo Betele epesaka mabɔkɔ mpo losambo na biso ekende liboso.

Bisika oyo okoki kotala yo moko: Nzelanzela, ntango ozali kosala vizite, okoki mpe kotala bavideo na minɔkɔ mosusu ya mboka.

Esika oyo ebongisami mpo bapaya bátala: Esika yango ezali na bililingi oyo emonisi istware ya Batatoli ya Yehova na Afrique du Sud kobanda 1914 tii 2014. Okoki kotala yango liboso to nsima ya vizite. Ezali mpe na mwa esika oyo ebongisami kaka mpo na bana, epai bakoki kotala bavideo oyo elobi: Komá moninga ya Yehova.

Esika oyo ebongisami mpo bapaya bátala imprimeri 2: Ezali na bavideo misato oyo emonisi ntina ya kobongola mikanda mpe konyata yango na minɔkɔ ya mboka. Ezali mpe na bilili oyo elakisi na mokuse ndenge oyo masini ya konyata mikanda esalaka. Oyo eleki ntina, ezali na esika oyo balobeli ndenge oyo nkombo ya Nzambe ezali na Babiblia ya minɔkɔ mosusu ya mboka.

Esika oyo ebongisami mpo bapaya bátala imprimeri 3: Na esika yango, okoki komona esika oyo babombaka mikanda mpe batindaka yango, mpe bamboka nyonso oyo mikanda yango etindamaka. Bavideo misato emonisi mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, ya kotinda mikanda, mpe ya kobimisa bavideo mpe mikanda ya koyoka.

Esika ya kopema mpo na bapaya: Okoki kozwa mopɛpɛ to kolya mwa eloko na esika yango. Na mikolo ya konje, esika yango ekómaka mpe parkingi ya babisi mpe ya mituka mosusu. Na mikolo mosusu, okoki kotambola na motuka na esika yango. Nzokande na mikolo ya konje, totyaka bisi mpo ezwa bato na esika yango mpo na komema bango na bisika mosusu.

Na mokuse

Tonyataka mikanda, babuku, bazulunalo, mwa babuku, mpe batrakte na minɔkɔ koleka 150; totindaka yango na bankóto ya masangá na mikili 20. Tobongolaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe bavideo na minɔkɔ koleka 20. Na lisalisi ya Departema ya kosala ba plan mpe kotonga, biro ya filiale ezali kotambwisa mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi na bikólo 42 ya Afrika.

Okoki kozwa mwa buku ya vizite na Internet