Makambo nini Batatoli ya Yehova bandimaka?
Biso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi tólanda mateya oyo Yesu ateyaki mpe oyo bantoma na ye basalelaki. Lisolo oyo elobeli na mokuse mateya oyo tondimaka.
Nzambe. Tosambelaka Yehova Nzambe ya solo kaka moko, oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi. (Nzembo 83:18; Emoniseli 4:11) Azali Nzambe ya Abrahama, ya Moize mpe ya Yesu.—Kobima 3:6; 32:11; Yoane 20:17.
Biblia. Tondimaka ete Biblia ezali na nsango etali bato, nsango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. (Yoane 17:17; 2 Timote 3:16) Mateya oyo tondimaka eutaka na mikanda nyonso 66 ya buku yango, oyo esangisi “Testama ya kala” mpe “Testama ya sika.” Profesɛrɛ Jason BeDuhn alobelaki yango mpo na Batatoli ya Yehova ntango akomaki ete “mateya ná misala na bango eyokanaka na makambo oyo euti mpenza na Biblia, balukaka makanisi ya Biblia kozanga ete bákanisa liboso ndenge ya kolongisa mateya na bango.” a
Atako tondimaka Biblia mobimba, tozali te bato oyo balobaka ete Nzambe akelá biloko nyonso na boumeli ya mikolo motoba, ya ngonga 24 na mokolo. Tondimaka ete biteni mosusu ya Biblia ekomamá na maloba ya elilingi mpe esengeli te kozwa yango kaka ndenge ekomami.—Emoniseli 1:1.
Yesu. Tolandaka mateya mpe ndakisa ya Yesu Kristo mpe tomemyaka ye lokola Mobikisi na biso mpe Mwana ya Nzambe. (Matai 20:28; Misala 5:31) Na yango, tozali bakristo. (Misala 11:26) Kasi toyekoli na Biblia ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te mpe ete ezali ata na vɛrsɛ moko te oyo endimi liteya ya Trinite.—Yoane 14:28.
Bokonzi ya Nzambe. Ezali mpenza guvɛrnema ya likoló, kasi ezalaka te na mitema ya bakristo. Ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato mpe ekokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabele. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Mosika te ekozwa makambo nyonso na mabɔkɔ mpo bisakweli ya Biblia emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka.”—2 Timote 3:1-5; Matai 24:3-14.
Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Abandaki koyangela na 1914.—Emoniseli 11:15.
Lobiko. Mbeka ya lisiko ya Yesu nde ekoki kosikola biso na lisumu mpe liwa. (Matai 20:28; Misala 4:12) Mpo na kozwela yango matomba, bato basengeli komonisa kondima epai ya Yesu, kobongola bomoi na bango mpe kozwa batisimo. (Matai 28:19, 20; Yoane 3:16; Misala 3:19, 20) Kondima oyo moto azali na yango emonanaka na misala. (Yakobo 2:24, 26) Kasi, tokozwa lobiko nde na nzela ya “boboto monene ya Nzambe” kasi te na makasi na biso moko.—Bagalatia 2:16, 21.
Likoló. Yehova Nzambe, Yesu Kristo mpe baanzelu ya sembo bafandaka na likoló. b (Nzembo 103:19-21; Misala 7:55) Motángo moke ya bato—144 000—bakosekwa mpo na bomoi na likoló mpo báyangela elongo na Yesu na Bokonzi.—Danyele 7:27; 2 Timote 2:12; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3.
Mabele. Nzambe akelaki mabele mpo bato báfanda libela. (Nzembo 104:5; 115:16; Mosakoli 1:4) Nzambe akopambola bato ya botosi, akopesa bango nzoto ya kokoka mpe bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.—Nzembo 37:11, 34.
Mabe mpe bampasi. Yango ebandaki ntango moko ya baanzelu ya Nzambe atombokaki. (Yoane 8:44) Anzelu yango, oyo na nsima ya botomboki na ye akómaki kobengama “Satana” mpe “Zabolo,” andimisaki mwasi ná mobali ya liboso bálanda ye mpe yango ebimiselaki bana na bango mpasi mpenza. (Ebandeli 3:1-6; Baroma 5:12) Mpo na kosilisa ntembe oyo Satana abimisaki, Nzambe atiki mabe mpe bampasi ezala, kasi akotika yango mpo na libela te.
Liwa. Soki moto akufi, azalaka lisusu te. (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 10) Anyokwamaka te na lifelo.
Nzambe akosekwisa ebele ya bato oyo bakufá. (Misala 24:15) Kasi, nsima ya lisekwa, baoyo bakoboya koyekola makambo ya Nzambe, bakobomama mpo na libela, bakosekwisama lisusu te.—Emoniseli 20:14, 15.
Libota. Tolandaka malako oyo Nzambe apesaki na ebandeli na likambo etali libala ete mobali moko mpo na mwasi moko; libala ekoki kokufa kaka mpo na ekobo. (Matai 19:4-9) Tondimaka mpenza ete batoli ya Biblia esalisaka mabota ezala malamu.—Baefese 5:22–6:1.
Losambo na biso. Tosambelaka ekulusu te to bililingi mosusu. (Kolimbola Mibeko 4:15-19; 1 Yoane 5:21) Makambo ya ntina oyo tosalaka na losambo na biso yango oyo:
Kobondela Nzambe.—Bafilipi 4:6.
Kotánga mpe koyekola Biblia.—Nzembo 1:1-3.
Kokanisa na mozindo na makambo oyo toyekolaka na Biblia.—Nzembo 77:12.
Koyangana elongo mpo na kobondela, koyekola Biblia, koyemba, kolobela kondima na biso mpe kolendisa bandeko oyo tosambelaka na bango mpe bato mosusu.—Bakolose 3:16; Baebre 10:23-25.
Kosakola “nsango malamu ya bokonzi.”—Matai 24:14.
Kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu oyo tosalelaka mpo na mosala ya koteya bato Biblia na mokili mobimba.—Nzembo 127:1.
Kosalisa bandeko oyo bazwi makama.—Misala 11:27-30.
Ebongiseli na biso. Tobongisami na masangá, oyo mokomoko etambwisamaka na bankulutu. Kasi, bankulutu yango bazali bakonzi ya lisangá te mpe bafutamaka te. (Matai 10:8; 23:8) Tosɛngaka dime te mpe tokongɔlaka mabonza te na makita na biso. (2 Bakorinti 9:7) Misala na biso nyonso esimbami na makabo oyo bato bapesaka kozanga kobɛta tangwá.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bandeko moke oyo basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova nde batambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.—Matai 24:45.
Bomoko na biso. Tozalaka na bomoko ya mateya na mokili mobimba. (1 Bakorinti 1:10) Tosalaka mpe makasi mpo makambo lokola bikólo, loposo, bozwi to bobola ekabola biso te. (Misala 10:34, 35; Yakobo 2:4) Ata bongo, bomoko na biso etikaka ete moto na moto azwa ekateli na ye. Motatoli nyonso ya Yehova azwaka bikateli na kolanda lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia.—Baroma 14:1-4; Baebre 5:14.
Bizaleli na biso. Tosalaka nyonso tómonisa bolingo ya solosolo na makambo nyonso oyo tosalaka. (Yoane 13:34, 35) Toboyaka misala oyo esepelisaka Nzambe te, na ndakisa kosalela makila na ndenge ya mabe to mpe kozongisa moto makila. (Misala 15:28, 29; Bagalatia 5:19-21) Tozali bato ya kimya mpe tokɔtaka te na bitumba. (Matai 5:9; Yisaya 2:4) Totosaka guvɛrnema ya esika tofandi mpe mibeko na yango soki ebuki mibeko ya Nzambe te.—Matai 22:21; Misala 5:29.
Boyokani na biso na basusu. Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Alobaki mpe ete bakristo “bazali bato ya mokili te.” (Matai 22:39; Yoane 17:16) Yango wana, tolukaka ‘kosalela bato nyonso oyo ezali malamu,’ ata bongo, tokɔtaka te na makambo ya politiki mpe tosanganaka na mangomba mosusu te. (Bagalatia 6:10; 2 Bakorinti 6:14) Kasi, tomemyaka bikateli ya bato mosusu na makambo ya ndenge wana.—Baroma 14:12.
Soki ozali na mituna mosusu oyo etali mateya ya Batatoli ya Yehova, okoki kotánga makambo mosusu etali biso na site Internet na biso, kokende na moko ya babiro na biso, koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na yo to kosolola na Motatoli moko ya Yehova na esika ofandaka.
a Talá buku Truth in Translation, lokasa 165.
b Baanzelu ya mabe babwakamá na nse atako esika bafandaka emonanaka na miso te.—Emoniseli 12:7-9.