BIBLIA EBONGOLAKA BATO
“Balabala nde ekómaki ndako na ngai”
Abotamá na: 1955
Ekólo: Espagne
Bomoi na ye ya kala: Momɛli bangi, molangwi masanga mpe moto ya mobulu
NDENGE NAZALAKI
Esɛngaka ntango eleka mpenza mpo bato mosusu bázwa liteya na basuvenire ya mabe oyo bakutaná na yango. Nazalaki lokola bango. Nabotamá mpe nakolá na Barcelone, engumba ya mibale ya Espagne oyo eleki monene. Libota na ngai ezalaki kofanda na kartye babengi Somorrostro, eteni monene ya engumba yango oyo ezwamaki pembenipembeni ya mai. Somorrostro ekendaki nsango mpo na mobulu mpe kotɛka bangi.
Baboti na ngai bazalaki na bana libwa, ngai nde mwana ya liboso. Lokola tozalaki babola mpenza, tata atindaki ngai nakende kosala lokola molɔkɔti-bale na club moko ya tenisi. Nazalaki na mbula zomi mpe nazalaki kosala ngonga zomi na mokolo. Yango wana mwaye nakende kelasi ndenge moko na bana ya mbula na ngai ezalaki te. Ntango nakómaki na mbula 14, nakómaki kosala lokola mekanisiɛ na atelier moko ya bibende.
Na 1975, basɛngaki ngai nakɔta mosala ya soda ndenge mibeko ya Espagne ezalaki kosɛnga. Nazalaki na mposa ya kosala eloko moko ya kokamwa na bomoi na ngai, yango wana nandimaki kosala na limpinga ya basoda ya Légion étrangère Espagnole na Melilla, teritware moko ya Espagne na nɔrdi ya Afrika. Na boumeli ya ntango wana nde namikɔtisaki na momeseno mabe ya komɛla bangi mpe kolangwa masanga.
Ntango nalongwaki na Légion yango, nazongaki na Barcelone mpe nasalaki etuluku moko ya bato ya mobulu. Tozalaki koyiba eloko nyonso oyo lobɔkɔ na biso ekokaki kozwa. Na nsima tozalaki kotɛka eloko yango mpo tosombaka bangi. Nakómaki komɛla bangi ya makasi babengi LSD mpe amphétamines, namipesaki na kosala pite, komɛla masanga mpe kobɛta masano ya mbongo. Bomoi yango ya mabe ekómisaki ngai mobulu makasi. Nazalaki ntango nyonso kotambola na mbeli, epasola to mashɛti, mpe nazalaki te kobanga kosalela yango soki esɛngi bongo.
Mokolo moko, ngai ná etuluku na ngai ya bato ya mobulu toyibaki motuka moko mpe bapolisi balandaki biso. Ezalaki lokola filme. Totambwisaki motuka yango na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30, tii ntango bapolisi bakómaki kobɛta biso masasi. Nsukansuka, sofɛlɛ na biso atutisaki motuka yango mpe biso nyonso tokimaki. Ntango tata ayebaki yango, abenganaki ngai na ndako.
Mbula mitano oyo elandaki, balabala ekómaki ndako na ngai. Nakómaki kolala liboso ya baporte, na mituka, na bakiti ya parkɛ mpe na malita. Nafandaki kutu mpo na mwa ntango na mobenga moko. Bomoi na ngai ezalaki na ntina te mpe nakómaki komona liwa ná bomoi kaka ndenge moko. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki komizokisa na mabɔkɔ na nse ya molangwa ya bangi. Bilembo ya bampota yango etikalá tii lelo.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI
Ntango nakokisaki mbula 28, mama ayaki koluka ngai mpo nazonga na ndako. Nandimaki kozonga ndako mpe nalakaki ye ete nakobongisa bomoi na ngai, kasi esɛngaki mwa ntango mpo nakokisa elaka yango.
Mokolo moko na mpokwa, Batatoli ya Yehova mibale bayaki epai na biso. Ntango nazalaki koyoka bango, tata abelelaki ngai na kati ya ndako ete nabengana bango. Lokola nazalaki kolinga te moto apesa ngai mitindo, nakipaki ye te. Batatoli ya Yehova bapesaki ngai buku misato ya mike mpe nasepelaki kozwa yango. Natunaki bango soki makita na bango esalemaka wapi, mpe mwa mikolo na nsima, nakendaki na Ndako ya Bokonzi.
Likambo ya liboso ebendaki likebi na ngai ezali ndenge moto nyonso alataki malamu. Kasi, ngai nazalaki nsuki milai, mandefu ebele mpe bilamba ya mabe. Emonanaki ete nabongaki te kokɔta kuna yango wana natikalaki na libándá. Kasi likambo ya kokamwa, nayebaki moto moko na nkombo Juan, oyo kala azalaki na etuluku na biso ya bato ya mobulu, kasi alataki kazaka. Na nsima, nayaki koyeba ete akómaki Motatoli ya Yehova kaka na mbula oyo eleki. Komona ye epesaki ngai makasi oyo nazalaki na yango mposa mpo nakɔta na Ndako ya Bokonzi mpe nalanda makita. Yango nde ebandeli ya mbongwana na bomoi na ngai.
Nandimaki koyekola na bango Biblia mpe eumelaki te, namonaki ete soki nalingi Nzambe andima ngai, nasengelaki kotika bomoi na ngai ya mbindo mpe ya mobulu. Kotika bizaleli yango ezalaki pɛtɛɛ te. Nayekolaki ete mpo nasepelisa Yehova, Nzambe, nasengelaki ‘kobongwana, kokómisa makanisi na ngai makanisi ya sika.’ (Baroma 12:2) Motema mawa ya Nzambe esimbaki mpenza motema na ngai. Atako mabunga na ngai wana nyonso, namonaki ete apesaki ngai libaku ya kobongola mpenza bomoi na ngai. Makambo oyo nayekolaki mpo na Yehova efandaki mpenza na motema na ngai. Nakómaki komona polele ete ezali na Mozalisi oyo akipaka ngai mpenza.—1 Petro 5:6, 7.
Yango etindaki ngai nabongola bomoi na ngai. Na ndakisa, ntango toyekolaki na Biblia likambo etali makaya, namilobelaki boye, ‘Soki Yehova alingi natikala pɛto mpe namipɛtola na mbindo nyonso, boye, nasengeli koboya likaya!’ (2 Bakorinti 7:1) Mpe nabwakaki yango na fulu!
Esɛngaki mpe natika kosalela mpe kotɛka bangi. Yango esɛngaki mwa ntango lisusu mpe milende. Mpo nakokisa mokano yango, namonaki ete nasengelaki kokabwana na baninga na ngai ya kala. Bizaleli na bango ezalaki kosalisa ngai te nakola na elimo. Kasi, na nsima, nakómaki kotyela Nzambe motema mingi lisusu mpe baninga na ngai ya sika oyo nazwaki na lisangá. Bolingo mpe likebi oyo batyelaki ngai ezalaki likambo moko oyo nakutaná na yango naino te liboso. Wana basanza ezalaki koleka, nsukansuka nalongaki kotika bangi mpe “kolata bomoto ya sika,” oyo esalaki ete Nzambe andima ngai. (Baefese 4:24) Na sanza ya 09/1985, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI
Biblia ebongoli bomoi na ngai. Esikoli ngai na makambo oyo ezalaki kobebisa nzoto mpe lokumu na ngai. Kutu, baninga na ngai ya kala koleka 30 bakufá na bolenge mpo na sida mpe bamaladi oyo eyaka mpo na komɛla bangi. Nazali mpenza na botɔndi ndenge kosalela batoli ya Biblia esalisi ngai nakima makama ya ndenge wana.
Mbeli mpe epasola oyo nazalaki kotambola na yango ntango nazaláká elenge ya mobulu, ekómá makambo ya kala. Nayebaki te ete mokolo mosusu nakotambola na Biblia mpe kosalela yango mpo na kosalisa basusu. Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai tolekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola.
Baboti na ngai bakómaki Batatoli ya Yehova te kasi basepelaki na matomba oyo boyekoli ya Biblia ememelaki ngai. Kutu, tata akómaki kokɔtela Batatoli ya Yehova liboso ya baninga na ye nyonso ya mosala. Emonanaki polele na miso na ye ete lingomba na ngai ya sika ebongolaki bomoi na ngai na ndenge ya malamu mpenza. Mama azalaki koloba na ngai mbala mingi ete esengelaki nayekola Biblia banda kala. Nakokaki kondimela ye lisusu te!
Makambo nakutaná na yango na bomoi eteyá ngai ete ezali bozoba koluka bisengo na bangi to na makambo mosusu ya mabe. Nazwaka esengo ya solosolo ndenge nasalisaka basusu báyeba mateya oyo ezali na Liloba ya Nzambe—mateya oyo ebikisá mpenza bomoi na ngai.