BIBLIA EBONGOLAKA BATO
Nsukansuka boyokani na ngai ná tata ezongaki
ABOTAMÁ NA: 1954
EKÓLO: Philippines
BOMOI NA YE YA KALA: Nakabwanaki na tata oyo azalaki konyokola biso
NDENGE NAZALAKI
Baturiste mingi bayaka kotala babweta to bisika oyo mai ya ebale eutaka likoló mpe ezali kokwea na nse, pene ya engumba Pagsanjan na ekólo Philippines. Kuna nde esika tata na ngai Nardo Leron, akolaki na bobola. Komona kanyaka oyo ezalaki na guvɛrnema, na polisi mpe na esika azalaki kosala ekómisaki ye nkandankanda.
Baboti na biso basalaki mosala makasi mpo na kobɔkɔla biso bana na bango mwambe. Mbala mingi bazalaki kotika biso moko na ndako na boumeli ya mikolo ebele mpo na kobatela bilanga na bangomba. Mbala mingi ngai ná yaya na ngai ya mobali Rodelio, tozalaki kosala makambo nyonso biso moko mpe tozalaki kozanga biloko ya kolya. Na bomwana tozalaki mpenza te na libaku ya kosakana. Kobanda na mbula nsambo mokomoko na biso asengelaki kosala na bilanga, komata bangomba ná bakilo ya bakokoti. Soki mwaye ya kotombola kilo yango ezalaki te, ezalaki kosɛnga tóbenda yango kobenda.
Esɛngaki tókanga motema ndenge tata azalaki kobɛta biso, kasi ezalaki kosala biso mpasi mingi ndenge azalaki mpe kobɛta mama na biso. Tomekaki kopekisa ye, kasi tozangaki ndenge ya kosala yango. Ngai ná Rodelio toyokanaki ete tokoboma tata na biso soki tokoli. Nazalaki mpenza na mposa ya tata oyo alingaka biso!
Lokola natombokaki mpo bizaleli ya tata ezalaki kopesa ngai nkanda, nalongwaki na ndako ntango nakokisaki mbula 14. Nafandaki na babalabala mpo na mwa ntango mpe nakómaki komɛla bangi. Nsukansuka, nakómaki kosalela bwato mpo na kotambwisa baturiste na babweta.
Mwa bambula na nsima, nakɔtaki iniversite na engumba Manila. Kasi lokola nazalaki kozonga kosala na bawikende na Pagsanjan, nazalaki na ngonga mingi te ya koyekola. Bomoi na ngai ezalaki mpasi mpe ezangaki ntina, bangi ezalaki lisusu te kokitisa mitungisi na ngai. Nakómaki sikoyo kosalela drɔgɛ oyo babengi cocaïne mpe héroïne. Nakómaki kosalela drɔgɛ ná kosala pite. Nazalaki mobola, komona makambo ezangi bosembo mpe bampasi. Nayinaki guvɛrnema mpe nazalaki kopesa yango foti mpo na makambo yango. Natunaki Nzambe boye: “Mpo na nini bomoi ezali boye?” Kasi nazwaki eyano moko te na mangomba ndenge na ndenge oyo nakɔtaki. Nakómaki kosalela drɔgɛ mingi mpo na kolongola mitungisi na ngai.
Na 1972, bayekoli ya iniversite bayokanaki bátombokela guvɛrnema. Nakɔtaki na moko ya bituluku mpe yango ebimisaki mobulu. Bakangaki bato mingi mpe nsima ya basanza mboka mobimba ekómaki na nse ya mibeko ya basoda.
Nazongaki lisusu na balabala, na mbala oyo nakómaki kobanga bakonzi ndenge namikotisaki na botomboki yango. Mpo nazwaka mbongo ya kosomba drɔgɛ, nakómaki koyiba mpe na nsima kosalela bazwi mpe bapaya misala ya mbindo. Nazalaki kobanga lisusu liwa te.
Na ntango yango, mama ná leki na ngai ya mobali bakómaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Tata asilikaki makasi mpe atumbaki mikanda na bango. Kasi bango mibale bakobaki na boyekoli yango mpe bazwaki batisimo, bakómaki Batatoli ya Yehova.
Mokolo moko, Motatoli ya Yehova moko asololaki na tata mpo na elikya oyo Biblia epesi mpo na avenire, ntango oyo bosembo ekozala na mabele mobimba. (Nzembo 72:12-14) Elikya yango esepelisaki tata mingi yango wana azwaki ekateli ya kosala bolukiluki na likambo yango ye moko. Na Biblia, amonaki kaka te elikya ya Nzambe etali guvɛrnema ya malamu, kasi mpe makambo oyo Nzambe asɛngi mibali mpe batata. (Baefese 5:28; 6:4) Mwa moke na nsima, ye ná bandeko na ngai mosusu nyonso bakómaki Batatoli ya Yehova mpe ngai nayebaki yango te.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI
Na 1978, nakendaki na Australie. Kasi ata na ekólo yango ya kimya mpe ya bozwi, nazangaki kaka kimya ya makanisi. Natikaki te komɛla masanga mpe drɔgɛ. Mwa basanza mingi na nsima, kaka na mbula yango, Batatoli ya Yehova bayaki kotala ngai. Nasepelaki na makambo balakisaki ngai na Biblia mpo na mokili ya kimya, kasi nazalaki kokakatana komipesa epai na bango.
Mwa moke na nsima na yango, nazongaki Philippines mpo na mwa bapɔsɔ. Bandeko na ngai bayebisaki ngai ete tata asalaki makasi mpo akóma moto malamu, kasi lokola nazalaki na nkanda makasi na motema yango wana nazalaki kolinga kokutana na ye ata moke te.
Leki na ngai ya mwasi alimbolelaki ngai na Biblia mpo na nini bomoi etondi na bampasi mpe na makambo ya kozanga bosembo. Nakamwaki ndenge elenge lokola ye oyo akutani naino na makambo mingi te na bomoi, akokaki kozala na biyano na mituna na ngai. Liboso nazonga, tata apesaki ngai buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. a Alobaki: “Tiká kokima mbangu. Buku oyo ekosalisa yo omona makambo oyo ozali koluka.” Asɛngaki ngai naluka Batatoli ya Yehova soki nazongi na Australie.
Nalandaki toli ya tata mpe namonaki Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova pene ya ndako na ngai na Brisbane. Nandimaki koyekola Biblia. Bisakweli ya Biblia, na ndakisa oyo ezali na Danyele mokapo 7 mpe Yisaya mokapo 9 emonisaki ete guvɛrnema ya Nzambe, oyo ezangi kanyaka, ekoyangela biso na mikolo ekoya. Nayekolaki ete tokozala na bomoi ya malamu na paradiso awa na mabele. Nazalaki na mposa Nzambe andima ngai, kasi namonaki ete nasengeli kopekisa nkanda na ngai mpe kotika drɔgɛ, masanga mpe bomoi na ngai ya mbindo. Nakabwanaki na elenge mwasi oyo nazalaki kobima na ye mpe nalongwaki na boombo ya drɔgɛ. Lokola nakómaki kotyela Yehova motema mingi lisusu, nasɛngaki asalisa ngai nabongola makambo mosusu na bomoi na ngai.
Mokemoke, nakómaki komona ete makambo nazalaki koyekola ekoki mpenza kobongola moto. Biblia elobi ete soki tosali milende, tokoki kolata “bomoto ya sika.” (Bakolose 3:9, 10) Lokola nazalaki kosala milende yango, nayaki komona ete makambo nayokaki mpo na ndenge tata abongolaki bizaleli na ye ezalaki mpenza solo. Na esika nazala na nkanda mpe nayina ye, nakómaki na mposa ya kozongisa kimya elongo na ye. Nsukansuka, nalimbisaki tata na ngai mpe nalongolaki koyina oyo nazalaki na yango mpo na ye banda bomwana.
MATOMBA OYO NAZWI
Ntango nazalaki elenge, mbala mingi nazalaki kolanda bizaleli mabe ya basusu. Toli oyo ya Biblia ezali mpenza mpo na likambo na ngai—baninga mabe babungisaki ngai nzela. (1 Bakorinti 15:33) Kasi nazwi baninga malamu na lisangá ya Yehova mpe basalisi ngai nakóma moto malamu. Nakutanaki mpe na Loretta mwasi moko malamu oyo azali mpe Motatoli ya Yehova. Ngai ná ye toteyaka basusu ndenge oyo Biblia ekoki mpe kosalisa bango.
Na lisalisi ya Biblia, namonaki ndenge tata na ngai akómaki moto oyo nakokaki te kokanisa ete akokóma—mobali malamu mpo na mama na ngai mpe mokristo ya komikitisa oyo alingaka kimya. Ntango nakutanaki na ye nsima ya batisimo na ngai na 1987, tata ayambaki ngai na mabɔkɔ na ye mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai!
Tata akobaki kosakwela basusu elikya ya Biblia elongo na mama na boumeli ya mbula koleka 35. Akómaki mobali makasi mpe oyo atyelaka basusu likebi mpe ayebanaki lokola moto oyo asalisaka basusu. Na boumeli ya bambula yango, nakómaki komemya mpe kolinga ye. Nakómaki komona yango lokumu koyebana ete nazali mwana na ye! Akufaki na 2016, kasi nakanisaka ye mpenza, nabosanaka te ete ngai ná ye tosalaki mbongwana monene mpenza na bomoto na biso ntango tosalelaki mateya ya Biblia. Koyina oyo nazaláká na yango elongwá mpenza. Mpe nasepelaka mpenza ndenge namoná Tata na ngai ya likoló, Yehova Nzambe, oyo alaki kosilisa makambo nyonso oyo ebimiselaka mabota mpasi na bisika nyonso.
a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi lelo ebimisamaka lisusu te.