Lakisá makambo oyo ezali na kati

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Zulunalo oyo ekabolami koleka bazulunalo mosusu nyonso

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Zulunalo oyo ekabolami koleka bazulunalo mosusu nyonso

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali zulunalo oyo ekabolami mingi koleka bazulunalo nyonso na mokili. Nimero mokomoko ebimaka na bakopi milio koleka 42. Lamuká! ezwi esika ya mibale mpo nimero mokomoko ebimaka na bakopi milio 41. Batatoli ya Yehova nde babimisaka bazulunalo yango mibale mpe bakabolaka yango na mikili koleka 236.

Bongo bazulunalo mosusu? Ebongiseli moko ya Amerika oyo esangisi bato oyo babimisaka bazulunalo elobi ete zulunalo ya kotɛka oyo ebimisami mingi koleka na États-Unis, lisangá ya baoyo bazwá pansiɔ na Amerika (AARP) nde ebimisaka yango mpe elobelaka mingi bato oyo bazali na mbula koleka 50. Zulunalo yango ebimisami na bakopi koleka milio 22 na ndambo. Zulunalo mosusu mpe ezali (Germany’s ADAC Motorwelt), oyo ebimisamaka na bakopi milio 14. Na Chine, zulunalo Gushi Hui (Histoires) ebimaka na bakopi milio mitano na ndambo sanza na sanza.

Zulunalo mosusu ya Japon (Yomiuri Shimbun) etɛkamaka mingi koleka bazulunalo nyonso. Ebimaka mbala na mbala na bakopi koleka milio 10.

Bazulunalo ya Batatoli ya Yehova ekeseni na bazulunalo mosusu na likambo mosusu: Kobongolama. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebongolami na minɔkɔ koleka 190, Lamuká!, na minɔkɔ koleka 80. Kasi zulunalo moko (Reader’s Digest) ebimaka na minɔkɔ 21, mpe makambo oyo ezalaka na zulunalo yango ekesanaka na kotalela bikólo.

Na kokesana na bazulunalo oyo elobelami awa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ebimaka na lisalisi ya makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko, basalelaka yango piblisite te mpe ezalaka na ntalo te.

Mokano ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali ya kolimbola mateya ya Biblia, mingimingi na ntina etali Bokonzi. Ebandá kobima banda 1879. Lamuká! elobelaka makambo ndenge na ndenge, na ndakisa biloko oyo Nzambe akelá mpe siansi, mpo bato bándimela Mozalisi. Elobelaka mpe ndenge Biblia ekoki kosalisa biso.