Lakisá makambo oyo ezali na kati

Babiblia na minɔkɔ na bango ya mboka

Babiblia na minɔkɔ na bango ya mboka

Batatoli ya Yehova bapesaka Biblia Libongoli ya mokili ya sika epai ya moto nyonso oyo alingi kotánga.

Atako bakompanyi ndenge na ndenge ebimisá bamilio ya mabongoli ya Biblia, bobola mpe likambo ya kokanisela bato ya mangomba mosusu mabe ekangeli bato mingi nzela ya kozwa Biblia na monɔkɔ na bango ya mboka. Yango wana Batatoli ya Yehova bakabolaka Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 115.

Tótalela mwa bandakisa oyo:

  • Rwanda: Silvestre ná Venantie oyo bazali na bana minei, balobi boye: “Tozali babola mpenza, yango wana tozangaki likoki ya kosombela moto mokomoko ya libota na biso Biblia. Sikoyo, moto na moto azali na Biblia Libongoli ya Mokili ya sika mpe totángaka yango elongo mikolo nyonso.”

    Pastɛrɛ moko ya lingomba ya Anglican na mboka yango, alobaki boye: “Ezali libongoli ya Biblia oyo nazali kokanga ntina na yango. Ezali malamu koleka mabongoli mosusu nyonso ya Biblia oyo natángá. Batatoli ya Yehova batyelaka mpenza bato likebi!”

  • République démocratique du Congo: Mangomba mosusu eboyaki kotɛkɛla Batatoli ya Yehova Biblia ya Lingala​—monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na ekólo yango.

    Ezali kokamwisa te soki, banda Libongoli ya Mokili ya Sika ebimá, Batatoli ya Yehova ya Congo basaleli mpe bakaboli yango mingi koleka! Kutu, ntango balobaki na liyangani moko monene ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na stade moko ete Biblia yango ebimi, bato basepelaki mingi mpenza. Bapolisi oyo bazalaki wana basalaki kutu molɔngɔ mpo na kozwa Biblia yango.

  • Fidji: Babiblia na monɔkɔ ya Fidji ezali ntalo mingi na boye ete Batatoli ya Yehova mingi bazalaki kosalela Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Anglais. Kasi na 2009, bato ya Fidji bazwaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki (Testama ya Sika) na monɔkɔ na bango ya mboka.

    Ndenge oyo Biblia ebongolamaki polele na monɔkɔ yango ekamwisaki mobali moko na boye ete asɛngaki Biblia yango. Kasi Batatoli ya Yehova bayebisaki ye azela sanza mobimba tii ntango Biblia ekoya na engumba yango. Lokola aboyaki kozela, mobali yango andimaki kokutana na Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki na Biblia yango mpo na kopesa ye atako esɛngaki atambola kilomɛtrɛ 35 mpo na kokóma kuna. Mobali yango alobaki: “Libongoli yango ezali malamu koleka mabongoli ya Biblia oyo tosalelaka. Ezali polele mpe mpasi te na kokanga ntina.”

  • Malawi: Ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na Davidi Biblia, bandimi ya lingomba ya Baptiste bayaki epai na ye mpe babɔtɔlaki ye Biblia oyo bapesaká ye. Na Malawi, Biblia ezalaki ntalo mpenza. Davidi azalaki komituna soki akosala nini mpo azwa Biblia mosusu. Ntango Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Chichewa, mpo na ye, ndɔtɔ na ye nde ekokisamaki.

    Ntango azwaki Biblia yango, agangaki boye: “Sikoyo nazwi Biblia ya malamu koleka oyo nazalaki na yango!”

Esali sikoyo mbula koleka 60, na liyangani moko monene oyo esalemaki na New York, bapesaki liyebisi ete eteni ya liboso ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na Anglais, bayangani bayokaki ndenge balobaki na bango: “Bótánga yango na mobimba. Bóyekola yango . . . Bópesa yango moto nyonso.” Mpo na kokokisa mokano yango, Batatoli ya Yehova babimisaki bakopi koleka milio 175 ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. Mpe lelo oyo, okoki kotánga Biblia yango na Internet na minɔkɔ soki 50.