Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mwa babuku oyo elobeli makambo etali Batatoli ya Yehova

 

Batatoli ya Yehova—Bazali banani?

Makambo oyo etali Batatoli ya Yehova na mokuse​—Basalaka nini mpe babongisami ndenge nini.

Batatoli ya Yehova mpe mikanda na bango

Mikanda ya Batatoli ya Yehova, ezala ya papye to oyo ezali na Internet, esalisaka bato bápusana penepene na Nzambe mpe báyeba mateya ya Biblia malamu mpenza. Mikanda yango esalisaka bato oyo bazali kotánga yango mpe ekoki kobongisa bomoi na bango.

Ndenge Batatoli ya Yehova bazalaka na bisika bafandi

Batatoli ya Yehova basalaka makasi básunga bato na esika oyo bango bafandaka na nzela ya milende oyo basalaka mpo na koteya bango mateya ya Biblia mpe kosalisa bango na mosuni.

Batatoli ya Yehova mpe mosala na bango ya koteya

Moko na makambo ya ntina mpenza na kati ya losambo ya Batatoli ya Yehova ezali kosakwela bato nsango malamu oyo ezali na Biblia. Mayele nini basalelaka mpe bolamu nini mosala yango ya kosakola ememelaka bato?

Batatoli ya Yehova mpe bomoi ya libota

Batatoli ya Yehova basalaka makasi básalela mitinda ya Biblia na mabota na bango, yango epesaka mibali, basi, mpe bana bolamu mingi. Yango esalaka mpe ete libota ezala esika ya kimya mpe ya bolingo. Baboti bamonaka ete koteya bana na bango mibeko ya Biblia ezali mokumba monene.

Batatoli ya Yehova​—Mituna oyo bato batunaka mingi

Biyano na mituna zomi oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova.

Batatoli ya Yehova mpe lisalisi ya monganga

Batatoli ya Yehova bamonaka ete bomoi ezali likabo ya motuya mingi oyo Nzambe apesá biso. Bamonaka ete bomoi mpe makila ezali mosantu. Balukaka lisalisi ya monganga ya malamu mpenza mpo na mabota na bango mpe basepelaka kosala na boyokani na minganga mpo na kozwa lisalisi ya monganga ya malamu, mpe kosalisama na bankisi mosusu na esika bátya bango makila.

Batatoli ya Yehova​—Kosala misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda

Banda kala mpenza, na bikólo mingi, mibeko endimaka lotomo oyo moto azali na yango ya koboya kosala mosala ya soda mpo na lisosoli na ye. Batatoli ya Yehova bazalaka na botɔndi mingi ntango baguvɛrnema elandaka mibeko ya mokili mobimba mpe endimaka ete Batatoli básalaka misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda, kasi mosala yango ezali etumbu te mpe ezali mpo na bolamu ya mboka mobimba.

Batatoli ya Yehova mpe makambo ya politiki

Na boyokani na mateya ya Biblia, Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te. Baguvɛrnema mingi eyebi ete, lokola Batatoli bakɔtaka na makambo ya politiki te, yango ebatelaka kimya. Lisusu, baguvɛrnema yango eyebaka ete Batatoli ya Yehova bazali bana-mboka oyo batosaka mibeko ya mboka mpe balandaka makambo oyo bakonzi balobaka.

Batatoli ya Yehova​—Koyangana mpo na losambo

Batatoli ya Yehova bamonaka ete koyangana esika moko na bandeko na bango bandimi ezali na ntina mingi mpo na kondima na bango. Mbala mingi, basalaka makita na bango na bisika ya losambo ebengami Ndako ya Bokonzi. Balobelaka mingi mpenza mateya ya Biblia, mpe moto nyonso akoki koya na makita yango.

Batatoli ya Yehova mpe lisungi na ntango ya makama

Ntango makama ebimaka, Batatoli ya Yehova basalaka nokinoki básunga bandeko na bango na mosuni, na mayoki, mpe na elimo. Ata bakonzi ya Leta mpe bibongiseli oyo epesaka lisungi bandimaka ete Batatoli basalaka makambo na molɔngɔ mpe na molende.

Batatoli ya Yehova balandaka toli ya Biblia oyo esɛngi kobatela bana

Batatoli ya Yehova bazwaka na lisɛki te likambo etali kobatela bana. Mokanda oyo emonisi bantina oyo Batatoli ya Yehova bapesi biyano na bifundeli ya lokuta oyo etali bango na likambo ya kobebisa bana.