MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini mpo natika kokanisa mabe?
Omonaka ete ozalaka moto ya ndenge nini?
Omonaka ete makambo ekobonga kaka?
“Nasalaka nyonso nazala na esengo mpe motema mpiɔ. Nasalaka nyonso nasɛka mpe nazala na esengo mokolo na mokolo”—Valerie.
Omonaka ete makambo ekobonga te?
“Soki likambo moko ya malamu esalemi, nakanisaka mbala moko ete ekoki kozala solo te to ezali libunga.”—Rebecca.
Otalelaka makambo na ndenge ebongi?
“Soki nakanisaka ete makambo ekobonga kaka, nakolɛmba nzoto ntango nyonso oyo makambo etamboli malamu te kasi soki nakanisaka ete makambo ekobonga te, nakozala ntango nyonso mawamawa. Kotalela makambo na ndenge ebongi esalisaka ngai natalela makambo ndenge ezali mpenza.”—Anna.
Mpo na nini ezali na ntina?
Biblia elobi ete “ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” (Masese 15:15) Ya solo, bato oyo baboyaka kokanisa ntango nyonso makambo ya mabe mpe balukaka mpe komona makambo ya malamu oyo bakutani na yango na bomoi, bazalaka na esengo. Ezalaka mpe mpasi te básala boninga na bato mingi. Kutu, nani akolinga kolekisa ntango elongo na moto oyo azalaka ntango nyonso mawamawa?
Ata soki ozali moto oyo amonaka ete makambo ekobonga kaka, ezalaka kaka na makambo ya mpasi oyo ekómaka na bomoi. Na ndakisa:
Okoki koyoka bansango ya bitumba, terorisme to mobulu.
Okoki kokutana na mikakatano na libota na yo.
Na ntembe te ozali mpe na bolɛmbu mosusu oyo ozali kobundana na yango.
Ekoki kozala ete moninga moko azokisi yo na motema.
Na esika okangela makambo yango miso to otya makanisi na yo nyonso kaka na makambo yango mpe ekómisa yo mawamawa, meká kotalela yango na ndenge ebongi. Kotalela makambo na ndenge ebongi ekosalisa yo oboya kokanisa mingi makambo ya mabe mpe ondima makambo oyo ekómaka na bomoi kozanga ete elɛmbisa yo koleka ndelo.
Oyo okoki kosala
Talelá mabunga na yo na ndenge ebongi.
Biblia elobi: “Moto moko té ya bosembo azali na mokili, oyo asalaka kaka malamu pe asalaka ata mabe moko té.” (Mosakoli 7:20, Bible na lingala ya lelo oyo) Lokola osalaka mabunga mpe mabe emonisi ete ozali kaka moto, elingi koloba te ete ozangi ntina.
Ndenge ya kotalela makambo na ndenge ebongi: Salá makasi obongisa mabunga na yo, kasi kozela te ete osala makambo na ndenge ya kokoka. Elenge mobali moko na nkombo Caleb, alobi boye: “Nasalaka nyonso natya makanisi te na mabunga ngai mpo nalɛmba nzoto te. Kutu, nalukaka kozwela yango liteya mpo namona ndenge nakoki kobongisa makambo.”
Boyá komikokanisa na basusu.
Biblia elobi: “Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.” (Bagalatia 5:26) Kotala bafɔtɔ ya fɛti oyo babengisaki yo te, oyo batye na basite ya kosolola na baninga ekoki kokómisa yo nkandankanda. Ekoki kosala ete baninga na yo ya motema bákóma lokola banguna na yo mpenza.
Ndenge ya kotalela makambo na ndenge ebongi: Ndimá ete bakobengisa yo te na bafɛti nyonso. Kutu, biloko oyo bato batyaka na basite ya kosolola na baninga, emonisaka kaka makambo moke oyo elekaki. Elenge mwasi moko na nkombo Alexis, alobi boye: “Na basite yango, bato batyaka kaka makambo oyo esimbaki, kasi mbala mingi batyaka te oyo esimbaki te.”
Zalá moto oyo atyaka kimya—mingimingi na libota na yo.
Biblia elobi: “Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.” (Baroma 12:18) Ozali te na likoki ya kobongola makambo oyo basusu basalaka, kasi ozali na likoki ya kobongola ndenge ya kosala na makambo yango. Okoki kopona kozala moto oyo atyaka kimya.
Ndenge ya kotalela makambo na ndenge ebongi: Zalá na mokano ya kozala moto oyo atyaka kimya na libota kasi koluka te kobebisa lisusu makambo, salelá bato ya libota makambo kaka ndenge osengeli kosalela baninga na yo. Elenge mwasi moko na nkombo Melinda, alobi boye: “Moto ya kokoka azalaka te, lelo to lobi yo mpe okoki kozokisa basusu na maloba to na misala. Esɛngi kaka tóyeba ndenge ya kosala na makambo yango—koluka kimya to kopelisa mɔtɔ.”
Kómá na ezaleli ya komonisa botɔndi.
Biblia elobi: “Bózala na botɔndi.” (Bakolose 3:15) Ezaleli ya komonisa botɔndi ekosalisa yo otya miso na makambo ya malamu oyo ezali kokómela yo na esika otya miso na likambo nyonso oyo ezali kosimba te.
Ndenge ya kotalela makambo na ndenge ebongi: Koboya te kokipe mikakatano oyo ozali na yango, kasi kokanga mpe te miso na makambo ya malamu oyo ozali kokutana na yango na bomoi. Elenge mwasi moko na nkombo Rebecca, alobi boye: “Mokolo na mokolo, nakomaka likambo moko ya malamu na mwa karnɛ na ngai. Nasalaka bongo mpo nabosana te ete ata soki nazali na mikakatano, ezali na makambo mingi ya malamu oyo nakoki kokanisa yango.”
Talá baninga nini ozali na bango.
Biblia elobi: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Soki olekisaka ntango elongo na baninga oyo balobaka kaka mabe ya basusu, batyolaka basusu to bamonaka likambo nyonso kaka mabe, bizaleli na bango wana ekoki kokɔtela yo.
Ndenge ya kotalela makambo na ndenge ebongi: Ntango baninga na yo bakutani na likambo moko ya mpasi, bakoki kokóma mawamawa to kotungisama na makanisi na bantango mosusu. Pesá bango mabɔkɔ, kasi kokómisa te likambo yango ya yo. Elenge mwasi moko na nkombo Michelle, alobi boye: “Ebongi te kozala kaka na baninga oyo bamonaka likambo nyonso kaka mabe. Na matematiki, soki osangisi mitángo mibale ya elembo (-) motángo yango ekobakisama nde na esika ekita.”
Tángá makambo mingi oyo etali yango
Tozali kobika na eleko oyo Biblia ebengi “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Ezali mpasi ozala na makanisi ya malamu lokola makambo ya mabe ezali mingi na mokili? Tángá “Mpo na nini bampasi etondi na mokili??”