Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Komɛla masanga mingi mpe libala

Komɛla masanga mingi mpe libala

 Molongani na yo amitungisaka mpo na ndenge na yo ya komɛla masanga? Soki ezali bongo, talelá makambo oyo elandi na likebi.

Na lisolo oyo

 Komɛla masanga mingi mpe libala ​—makambo mibale oyo ebalanaka te

 Komɛla masanga koleka ndelo ekoki komema mikakatano mingi na sante ya moto, na ndakisa maladi ya motema, maladi ya foie, mpe kanser. Kasi ezali na likama kaka mpo na sante te; ekoki mpe komema mikakatano na kati ya libala, na ndakisa koswana mpe matata, mikakatano ya mbongo, pite, mpe kokabwana.

 Biblia elobi ete ntango moto azali komɛla masanga mingi, yango “eswaka lokola nyoka, mpe ebimisaka pwazɔ lokola nyoka ya ngɛngɛ.” (Masese 23:32) Ndenge nini okoyeba soki okómá moombo ya masanga?

 Okóma moombo ya masanga?

 Mituna oyo elandi ekoki kosalisa yo oyeba soki okóma moombo:

  •   Okokaka te komipekisa ntango obandi komɛla masanga?

  •   Makanisi na yo ezalaka ntango nyonso na masanga?

  •   Okobaka komɛla ata soki yango ezali kobimisa mikakatano na bomoi na yo, ata mpe na libala na yo?

  •   Omiyokaka mabe ntango ozali komeka kotika komɛla?

  •   Oswanisaka molongani na yo ntango omeli masanga?

  •   Mposa na yo ya komela masanga ezali komata se komata?

  •   Omɛlaka na kobombana to obombaka masanga na ndako to mpe na mosala?

 Soki oyanoli “ɛɛ” na moko ya mituna oyo to mingi kati na yango, mbala mosusu okómá moombo ya masanga. Bakoki kobenga yo molangwi masanga (soûlard).

 Kosala te lokola likambo ezali te

 Molongani na yo amitungisaka mpo na ndenge na yo ya komɛla masanga? Soki ɛɛ, mbala mosusu omekaki kokitisa ye motema to komonisa ye ete ezali na yango mpenza likambo ya monene te. To mpe olukaki kobwakela bato mosusu foti, na ndakisa molongani na yo, na maloba lokola:

  •   “Soki ozalaki kosalela ngai makambo ndenge esengeli, nalingaki komipesa na masanga te.”

  •   “Soki batye yo osala ná patron na ngai, yo mpe okokóma komɛla lokola ngai.”

  •   “Nayebi bato ebele oyo bamɛlaka koleka ngai.”

 Soki obimisi maloba lokola oyo, omoni te ete ozali kozwa na motuya mingi mposa na yo ya komɛla masanga koleka kimya ya libala na yo? Nini esengeli kozala na ntina mingi, libala to masanga?

 Etinda ya Biblia: “Mobali oyo abalá amitungisaka mpo na . . . ndenge oyo akoki kosepelisa mwasi na ye.”​—1 Bakorinti 7:33.

Longolá efelo (mur) oyo ezali kopekisa yo omona makama mpe tyá na esika na yango fɛnɛtrɛ oyo ekosalisa yo omona polele mitungisi ya molongani na yo

 Oyo okoki kosala

  •   Tyá likebi na mitungisi ya molongani na yo. Ata soki emonani lokola molongani na yo azali komitungisa koleka ndelo, meká kobongola mwa makambo. Soki osali yango te, to ozali kokoba kaka komɛla atako molongani na yo azali komitungisa, yango ekoki komonisa ete masanga ekómi likama mpo na yo.

     Etinda ya Biblia: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.

  •   Yebá makama ya masanga. Mpo na kolonga etumba, ezali na ntina soda ayeba mayele ya monguna na ye. Ezali mpe bongo mpo na yo​—mpo na kolonga monguna na yo, osengeli koyeba makama ya masanga mpe ndenge yango ekangaka bato na motambo. Ekozala mpe na ntina koyeba mayele ndenge na ndenge oyo ekosalisa yo okata boombo ya masanga mpe oyo okosala mpo okwea te.

     Etinda ya Biblia: “Bókoba koboya bamposa ya mosuni, oyo ebundisaka bino.”​—1 Petro 2:11.

  •   Luká lisalisi. Ezali na minganga mingi oyo basalisaka bato oyo bamɛlaka masanga na ndenge ya mabe. Ezali mpe na baprogramɛ, balopitalo mpo na kosunga bato ya ndenge wana. Okoki mpe kosolola na moninga moko oyo ayebi makambo mingi, oyo akoki kosalisa yo oyeba makambo mosusu oyo esalaka ete okóma moombo ya masanga. Okoki kobenga moninga yango soki mposa ya kozongela mimeseno na yo ya kala eyeli yo.

    Soki esengeli, luká lisalisi ya minganga oyo basalisaka na mikakatano etali masanga

     Etinda ya Biblia: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

 Moto akoki te kolongwa na boombo ya masanga kaka nsima ya kotánga mwa lisolo moko boye, to kaka nsima ya koloba, “Nakosala makasi namɛlaka lisusu mingi te,” yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi yebá ete ntango moto oyo abalá akómi moombo ya masanga, yango ezali likama kaka mpo na nzoto na ye te, kasi mpe mpo na libala na ye.

 Mpo na koyeba makambo mosusu: Tángá masolo oyo elandi mpo na koyeba nini esalisaki bato mosusu batika komɛla koleka ndelo.

 “Nazali lisusu te moto ya mobulu”

 “Nayokaka lisusu nsɔni te”

 “Balabala nde ekómaki ndako na ngai”

 Talá mpe video ‘Nalɛmbaki bomoi oyo nazalaki na yango’