Biblia elobi nini na likambo etali boninga?
Eyano ya Biblia
Kozala na baninga ekoki kosala ete moto azala na esengo mpe asepela na bomoi. Baninga ya malamu basalisanaka mpe bapesanaka makasi.—Masese 27:17.
Nzokande, Biblia emonisi ntina oyo tosengeli kokeba ntango tozali kopona baninga na biso. Emonisi biso ete kozala na baninga ya mabe ebimisaka mpasi. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Baninga ya ndenge wana bakoki kotinda moto azwa bikateli ya mabe to kobebisa bizaleli na ye ya malamu.
Na lisolo oyo tokolobela:
Nini esalaka moto azala moninga ya malamu?
Biblia eteyaka ete boninga ya malamu esengeli kosimbama na eloko moko ya makasi mpenza koleka makambo oyo bosepelaka na yango. Na ndakisa, Nzembo 119:63 elobi: “Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo, a mpe ya baoyo bazali kobatela bitinda na yo.” Simbá ete mokomi ya Biblia alobi ete aponaki baninga oyo babangaka kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te mpe oyo balingaka kotosa mibeko na ye.
Biblia emonisi mpe bizaleli oyo moninga ya malamu asengeli kozala na yango. Na ndakisa:
“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”—Masese 17:17.
“Baninga mosusu balukaka kosalana mabe, kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”—Masese 18:24.
Bavɛrsɛ yango ezali koteya biso ete moninga ya malamu azalaka sembo, azalaka na bolingo, na boboto, mpe akabaka. Tokoki kotyela moninga ya malamu motema ete akosalisa biso na ntango ya mpasi. Moninga ya solosolo akozala mpe na mpiko ya kokebisa biso ntango tolingi kolanda nzela ya mabe to soki tolingi kozwa ekateli moko ya mabe.—Masese 27:6, 9.
Bandakisa nini ya boninga ya malamu oyo Biblia elobeli?
Biblia ezali na bandakisa ya boninga ya malamu kati na bato oyo bazalaki na bambula ekeseni, bautaki na bisika ekeseni, bazalaki mimeseno ekeseni mpe bokonzi ekeseni. Tólobela boninga misato ya ndenge wana.
Ruta ná Naomi. Ruta azalaki mwasi ya mwana ya Naomi, mpe ekoki kozala ete Naomi azalaki mokolo ya Ruta ya bambula mingi mpenza. Longola yango, mimeseno ya mboka oyo Ruta autaki ekesanaki na oyo ya Naomi. Atako bongo, bazalaki na boninga ya penepene mpe ya makasi mpenza.—Ruta 1:16.
Davidi ná Yonatane. Atako Yonatane azalaki mokolo ya Davidi ya bambula 30, Biblia elobi ete “molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi.”—1 Samwele 18:1.
Yesu ná bantoma na ye. Yesu azalaki na bokonzi likoló ya bantoma na ye, azalaki molakisi mpe nkolo na bango. (Yoane 13:13) Kasi azalaki kotalela bango te lokola nde babongi te kozala baninga na ye. Kutu, Yesu azalaki moninga ya motema ya baoyo bazalaki kosalela mateya na ye. Alobaki boye: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.”—Yoane 15:14, 15.
Moto akoki kozala moninga ya Nzambe?
Moto akoki kozala moninga ya Nzambe. Biblia elobi: ‘Nzambe azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.’ (Masese 3:32) Na maloba mosusu, Nzambe azalaka moninga ya baoyo bazalaka na bizaleli malamu, bazalaka sembo, bazalaka na etamboli ya malamu, mpe basalaka makasi ya kotosa mibeko na ye na oyo etali malamu mpe mabe. Na ndakisa, Biblia ebengi Abrahama moninga ya Nzambe.—2 Ntango 20:7; Yisaya 41:8; Yakobo 2:23.
a Bavɛrsɛ mosusu oyo ezali likoló mpe na nse ya vɛrsɛ yango emonisi ete “yo” oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali kolakisa Nzambe.