Batisimo elimboli nini?
Eyano ya Biblia
Batisimo esɛngaka kozindisa mpe kobimisa moto na mai. a Yango emonisi ntina oyo Yesu azwaki batisimo na ebale oyo ezalaki na mai ebele. (Matai 3:13, 16) Ndenge moko mpe, mobali moko ya Etiopi asɛngaki bábatisa ye ntango akómaki na “esika moko oyo mai ezalaki.”—Misala 8:36-40.
Ndimbola ya batisimo
Biblia ekokanisaka batisimo na kokunda. (Baroma 6:4; Bakolose 2:12) Kobatisama na mai elimbolaka moto akufi na makambo oyo azalaki kosala liboso mpe abandi bomoi ya sika lokola mokristo oyo amipesi na Nzambe. Batisimo mpe makambo oyo ememaka na batisimo ezali ebongiseli oyo Nzambe azwá mpo moto akóma na lisosoli ya pɛto mpo amonisi kondima na mbeka ya Yesu Kristo. (1 Petro 3:21) Na yango, Yesu ateyaki ete bayekoli na ye basengeli kozwa batisimo.—Matai 28:19, 20.
Batisimo ya mai elongolaka masumu?
Te. Biblia eteyaka ete kaka makila oyo Yesu asopaki nde ekoki kopɛtola biso na masumu. (Baroma 5:8, 9; 1 Yoane 1:7) Kasi, mpo tozwa matomba na mbeka ya Yesu, tosengeli komonisa kondima epai ya Yesu, kobongola bomoi na biso mpe koyokanisa yango na mateya ya Yesu mpe kozwa batisimo.—Misala 2:38; 3:19.
Kokulisa elimboli nini?
Maloba “kokula” mpe “kokulisa” ezali na Biblia te. Ezali molulu oyo baeglize mosusu esalaka ntango “babatisaka” bana mike (basopelaka bango mwa matangá ya mai na motó) mpe bapesaka bango nkombo.
Biblia eteyaka kobatisa bana mike?
Te, eteyaka bongo te. Batisimo ya bakristo ezali mpo na bato oyo bakoli mwa moke mpo báyeba mpe bándimela “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Misala 8:12) Esangisi makambo lokola koyoka liloba ya Nzambe, kondima yango mpe kobongola motema; makambo oyo mwana moke akoki kosala yango te.—Misala 2:22, 38, 41.
Lisusu, Biblia emonisi ete Nzambe atalelaka bana mike ya bakristo ete bazali basantu, to pɛto na miso na ye mpo na bosembo ya baboti na bango. (1 Bakorinti 7:14) Soki Nzambe andimaka batisimo ya bana mike, mbɛlɛ elingaki kozala na ntina te Nzambe atánga bango basantu mpo na bosembo ya baboti na bango. b
Makanisi ya libunga mpo na batisimo ya bakristo
Makanisi ya libunga: Kosopela moto mwa matangá ya mai ekokani na batisimo ya kozindisa mpenza moto na mai.
Solo: Batisimo oyo Biblia elobeli esɛngi kozindisa moto na mai. Na ndakisa, ntango moyekoli Filipe abatisaki moto ya Etiopi, bango nyonso mibale “bakitaki na mai” mpo na batisimo yango. Na nsima “babimaki na mai.”—Misala 8:36-39. c
Makanisi ya libunga: Biblia emonisi ete ntango bato ya ndako mobimba bazalaki kobatisama, bana mike mpe bazalaki kozwa batisimo. Na ndakisa, elobi boye mpo na Mokɛngɛli ya bolɔkɔ na mboka Filipi: “Ye ná bato na ye babatisamaki.”—Misala 16:26-34.
Solo: Lisolo ya mokɛngɛli ya bolɔkɔ emonisi ete ntango abongwanaki, ye ná baoyo bazwaki batisimo bakangaki ntina ya “liloba ya Yehova” mpe ‘basepelaki mingi.’ (Misala 16:32, 34) Yango etindi biso tóloba ete mwana nyonso ya moke na ndako ya mokɛngɛli bolɔkɔ azwaki batisimo te mpo akokaki te kokanga ntina ya liloba ya Yehova.
Makanisi ya libunga: Yesu ateyaki batisimo ya bana mpo alobaki ete bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bana mike.—Matai 19:13-15; Marko 10:13-16.
Solo: Yesu alobelaki batisimo te ntango alobaki maloba wana. Kutu, amonisaki nde ete baoyo bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe basengeli kozala lokola bana mike; elingi koloba kozala na komikitisa mpe kondima koteyama.—Matai 18:4; Luka 18:16, 17.
a Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “batisimo” euti na liloba oyo elimboli “kozindisa.” Talá buku Theological Dictionary of the New Testament, Volimi I, lokasa 529.
b Buku moko (Standard Bible Encyclopedia) elobi ete “ata esika moko te na [Kondimana ya Sika] balobeli batisimo ya bana mike.” Elobi mpe ete momeseno yango ekolaki mpo “bazalaki kolekisa ndelo mpe kotalela batisimo na ndenge oyo ebongi te, kozwa yango na valɛrɛ mingi” mpo bazalaki kokanisa ete batisimo elongolaka masumu.—Volimi 1, nkasa 416-417.
c Na nse ya motó ya likambo oyo bakomi “batisimo (na Biblia),” buku (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Emonani ete bakristo ya liboso bazalaki kozindisa moto na mai ntango bazali kobatisa ye.”—Volimi 2, lokasa 59.