Biblia elobi nini mpo na nkanda?
Eyano ya Biblia
Biblia eteyaka ete soki moto ayebi kopekisa nkanda na ye te, yango ekoki kosala ye moko mabe mpe baoyo bafandi ná ye. (Masese 29:22) Atako na bantango mosusu moto akoki koyoka nkanda, kasi Biblia elobaka ete baoyo bazalaka “nkanda makasimakasi,” bakozwa lobiko te. (Bagalatia 5:19-21) Biblia ezali na toli oyo ekoki kosalisa moto ayeba kopekisa nkanda na ye.
Nkanda ezalaka ntango nyonso mabe?
Te. Ezali na makambo mosusu oyo ekoki kopesa moto nkanda. Na ndakisa, Nehemia, moto moko ya sembo ‘asilikaki makasi’ ntango ayokaki ete bazalaki konyokola bato ya lingomba na ye.—Nehemia 5:6.
Na bantango mosusu, Nzambe ayokaka nkanda. Na ndakisa, ntango Bayisraele babukaki elako oyo basalaki ya kosambela kaka ye mpe bakómaki kosambela banzambe ya lokuta, “nkanda ya Yehova epelelaki” bango. (Basambisi 2:13, 14) Ata bongo, nkanda ezali te ezaleli oyo eleki monene na bizaleli oyo Yehova Nzambe azalaka na yango. Soki ayoki nkanda, ezalaka ntango nyonso na ntina mpe ayebaka kopekisa yango.—Kobima 34:6; Yisaya 48:9.
Ntango nini nkanda ekómaka mabe?
Nkanda ekómaka mabe soki moto ayebi kopekisa yango te to akómi kosilika mpambampamba; mbala mingi bato ya kozanga kokoka bazalaka na nkanda ya bongo. Na ndakisa:
Kaina “ayokaki nkanda makasi” ntango Nzambe aboyaki likabo na ye. Kaina atikaki nkanda na ye eya makasi tii etindaki ye aboma ndeko na ye.—Ebandeli 4:3-8.
Mosakoli Yona “asilikaki makasi” ntango Nzambe amoniselaki bato ya Ninive motema mawa. Nzambe apamelaki Yona, amonisaki ye ete ‘azalaki mpenza te na ntina ya kosilika’ mpe asengelaki koyoka mawa mpo na basumuki wana oyo babongolaki motema.—Yona 3:10–4:1, 4, 11. a
Bandakisa oyo emonisi ete mpo na bato ya kozanga kokoka, “nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.”—Yakobo 1:20.
Ndenge nini okoki kopekisa nkanda?
Luká koyeba likama ya kozala na nkanda makasimakasi. Bato mosusu bakoki kokanisa ete kobimisa nkanda na bango polele nde ekomonisa ete bazali makasi. Nzokande, moto oyo ayebi kopekisa nkanda na ye te azali na bolɛmbu makasi. “Moto oyo azali kopekisa elimo na ye te azali lokola engumba oyo babuki, oyo ezangi efelo.” (Masese 25:28; 29:11) Kasi soki tokómi na likoki ya kopekisa nkanda na biso, tokomonisa makasi ya solosolo mpe bososoli. (Masese 14:29) Biblia elobi: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya.”—Masese 16:32.
Salá nyonso opekisa nkanda liboso etinda yo osala likambo oyo ekopesa yo mawa na nsima. Nzembo 37:8 elobi: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka,” ebakisi: “Kosilika te kaka mpo na kosala mabe.” Simbá ete ntango toyoki nkanda, tozali na likoki ya kopona—tokoki kopona kotika yango liboso emema biso na “kosala mabe.” Ndenge Baefese 4:26 elobi, “bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te.”
Soki esengeli, longwá wana ntango nkanda ebandi komata. Biblia elobi: “Ebandeli ya kowelana ezali lokola ntango moto azali kofungola mai; na bongo liboso koswana ebima, bendá nzoto.” (Masese 17:14) Atako ezalaka malamu kobongisa matata nokinoki, bino mibale bosengeli naino kokitisa nkanda liboso bósolola likambo yango na kimya.
Luká koyeba makambo nyonso. Masese 19:11 elobi: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye.” Ekozala malamu tóluka koyeba makambo nyonso liboso ya koloba boye to boye. Soki toyoki na likebi ndenge likambo ezalaki mpenza, ekozala mpasi tósilika mpambampamba.—Yakobo 1:19.
Bondelá mpo ozwa kimya ya makanisi. Libondeli ekoki kosalisa yo ozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:7) Kobondela ezali lolenge mosusu ya malamu oyo tozwaka elimo santu ya Nzambe, oyo ekoki kosalisa biso tókóma na bizaleli lokola kimya, motema molai mpe komipekisa.—Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23.
Poná baninga na yo malamumalamu. Ezalaka mpasi te tómekola bato oyo tolekisaka ntango ná bango. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Yango wana, Biblia ekebisi boye: “Kosala boninga na moto moko te oyo alingá kosilika.” Mpo na nini? “Mpo omesana na banzela na ye te mpe mpo okɔtisa mpenza molimo na yo na motambo te.”—Masese 22:24, 25.
a Emonani ete Yona andimaki mpamela yango mpe atikaki nkanda na ye, mpo Nzambe asalelaki ye mpo na kokoma mokanda ya Biblia oyo ebengami na nkombo na ye.